Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova mpe basalisaka bato oyo bazwi likama?

Batatoli ya Yehova mpe basalisaka bato oyo bazwi likama?

 Ɛɛ, Batatoli ya Yehova mpe basalisaka bato ntango likama ebimi. Tosalisaka bandeko na biso Batatoli ya Yehova mpe bato oyo bazali Batatoli te, ndenge Biblia emonisi yango na Bagalatia 6:10 ete: “Tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” Tosalaka mpe makasi tólendisa bato na maloba na biso mpe tóyebisa bango elikya oyo Nzambe apesi biso mpo bato oyo bazwi likama, bazalaka na mposa ya koyoka makambo wana.​—2 Bakorinti 1:3, 4.

Ndenge tosalaka yango

 Ntango likama ebimi na esika moko, bankulutu, (to bandeko oyo batambwisaka masangá) oyo bafandi wana balukaka kozwa nsango ya bandeko ya masangá na bango mpo na koyeba soki bazali malamu mpe soki bazali na mposa ya biloko mosusu. Na nsima, bankulutu bayebisaka biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na mboka wana ndenge makambo ezali mpe oyo basali mpo na kosalisa.

 Soki bandeko ya mboka yango bakoki te kopesa bandeko na bango oyo bazwi likama biloko nyonso oyo esengeli, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezwaka bibongiseli mpo na kopesa lisungi oyo esengeli. Bakristo ya liboso mpe basalisanaki ndenge wana na ntango ya nzala moko makasi. (1 Bakorinti 16:1-4) Biro ya filiale ya mboka eponaka bandeko mpo básala baekipi oyo ekotambwisa mosala ya kosalisa bato oyo bazwi likama. Batatoli oyo bauti na mikili mosusu bayaka kolekisa ntango mpe bapesaka biloko na bango mpo na kosalisa.​—Masese 17:17.

Esika mbongo eutaka

 Basalelaka mpe makabo oyo etindamaka na babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova mpo na kosunga bato oyo bazwi likama. (Misala 11:27-30; 2 Bakorinti 8:13-15) Bato oyo bayaka kosalisa baoyo bazwi likama bamipesaka na bolingo na bango moko; na yango mbongo ya makabo esalemaka kaka mpo na bato oyo bazwi likama, kasi te mpo na bato oyo bazali kosala mosala. Tosalelaka malamu makabo nyonso oyo tozwaka.​—2 Bakorinti 8:20.