Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu?

Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu?

 Ɛɛ, tondimelaka Yesu. Ye moko alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Tondimaka ete Yesu autaki likoló mpe ayaki awa na mabele mpo na kopesa bomoi na ye ya kokoka mbeka mpo na kosikola bato. (Matai 20:28) Liwa mpe lisekwa na ye epesi bato oyo bazali kondimela ye likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Tondimaka mpe ete lelo oyo, Yesu azali koyangela kuna na likoló lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, oyo mosika te ekotya kimya na mabele mobimba. (Emoniseli 11:15) Nzokande, Yesu alobaki polele ete: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Na yango, tosambelaka Yesu te, mpo toyebi ete azali Nzambe-Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te.