Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova babongolá Biblia mpo ekokana na mateya na bango?

Batatoli ya Yehova babongolá Biblia mpo ekokana na mateya na bango?

 Te. Kutu, soki tomoni ete mateya na biso eyokani mpenzampenza te na makambo oyo Biblia elobi, tosembolaka mateya yango.

 Tozalaki koyekola Biblia bambula mingi liboso tóbanda kobimisa Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na 1950. Tosalelaki Babiblia oyo ezalaki na ntango wana mpe mateya na biso eutaki kuna. Talá mwa makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyaka banda kala, mpe yo moko lobá soki eyokani na oyo Biblia eteyaka mpenza.

  1.   Liteya oyo tondimaka: Nzambe azali Bosato te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya nsambo 1882 elobaki ete: “Batángi na biso bayebi ete tondimelaka Yehova, Yesu, mpe elimo santu, kasi tondimaka ata moke te likanisi oyo euti na Biblia te, oyo elobaka ete ezali na Banzambe misato na persona moko to mpe, Nzambe moko na bapersona misato.”

      Oyo Biblia elobi: “Yawe Nzambe na biso azali Yawe se moko.” (Kolimbola Mibeko [to Kozongela Mibeko] 6:4, Bible na lingala ya lelo oyo) “Mpɔ na biso Nzambe mɔkɔ azali, ye Tata; bilɔkɔ yɔnsɔ bizalisamaki na ye, biso mpe tozali uta na ye. Mpe Nkolo mɔkɔ azali, ye Yesu Klisto; bilɔkɔ yɔnsɔ bizalisamaki na ntina na ye.” (1 Bakorinti 8:6, haut fleuve) Yesu ye moko alobaki ete: “Tata aleki ngai.”​—Yoane 14:28, Bible na lingala ya lelo oyo.

  2.   Liteya oyo tondimaka: Lifelo ya mɔtɔ ezalaka te. Na kolanda Baroma 6:23 na Biblia King James version, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya motoba 1882 ezalaki na motó ya likambo “Lifuti ya lisumu ezali liwa.” Elobaki boye: “Maloba yango ezali polele mpe pɛtɛɛ mpenza. Ezali likambo ya kokamwa ndenge bato ebele oyo balobaka ete bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe bazali kokoba kobalola maloba yango ya polele, mpe koloba ete mpo na bango, Biblia eteyaka ete lifuti ya lisumu ezali monyoko ya seko na lifelo ya mɔtɔ.”

      Oyo Biblia elobi: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4, 20, haut fleuve) Na kolanda Biblia, bato oyo batosaka Nzambe te bakonyokwama na lifelo te, kasi nde “bakokufa libela.”​—2 Batesaloniki 1:9, Bible na lingala ya lelo oyo.

  3.   Liteya oyo tondimaka: Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo, kasi te eloko oyo ezalaka na motema ya moto. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya zomi na mibale 1881 elobaki mpo na Bokonzi ya Nzambe ete: “Ntango Bokonzi yango ekotyama, ekokweisa makonzi nyonso ya mabele.”

      Oyo Biblia elobi: “Na mikɔlɔ na mikonzi yango Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama sɔkɔ mokɛ tɛ, mpe bokonzi yango ekopɛsama na bato mosusu tɛ; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo yɔnsɔ, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44, haut fleuve.

Batatoli ya Yehova basalelaka kaka Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na komonisa mateya na bango?

 Te, mpo tii lelo tosalelaka mpe Babiblia mosusu na mosala na biso ya kosakola. Kutu, ata soki topesaka Libongoli ya Mokili ya Sika ofele na bato oyo toyekolaka na bango Biblia, toyekolaka mpe na bato oyo basepelaka kosalela Babiblia mosusu.