Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova baboyaka kozwa vaccin?

Batatoli ya Yehova baboyaka kozwa vaccin?

 Te. Batatoli ya Yehova baboyaka te kokata mangwele to kozwa vaccin. Tomonaka nde ete likambo ya kokata mangwele to kozwa vaccin ezali ekateli ya moto na moto mpe mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli yango ye moko. Batatoli ya Yehova mingi bandimaka kokata mangwele to kozwa vaccin.

 Tolukaka lisalisi ya minganga oyo ezali malamu mpenza mpe tozwaka na valɛrɛ ndenge siansi ekoli na likambo etali lisalisi ya minganga mpo na kopɛngola makama oyo eutaka na maladi mabe. Tozali na botɔndi mpo na ndenge minganga bazali komipesa mpe kosala mosala makasi mpo na kosalisa bato bázala na sante ya malamu, mingimingi na ntango oyo ya mpasi.

 Batatoli ya Yehova bayokanaka malamu na minganga. Na ndakisa, banda maladi mabe ya coronavirus epanzanaki na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kokoba kokundwela bato na bankama ya minɔkɔ na site Internet oyo mpo bámibatela na maladi yango, mpe bazali kolendisa bato bándima malako oyo bakonzi bazali kopesa. Yango esangisi makambo lokola kozala mosika na bato mosusu mpe kotosa mibeko na oyo etali koyangana esika moko na bato mingi, kotya basusu mosika na bato mosusu, kosukola mabɔkɔ, mpe kolata maskɛ lokola ezali malako ya libosoliboso oyo bakonzi ya Leta bazali kopesa mpo na komibatela na maladi yango.​—Baroma 13:1, 2.

 Na boumeli ya bambula ebele, mikanda ya Batatoli ya Yehova ebɛtaki nsɛtɛ na mitinda oyo:

  •   Moto na moto azali na mokumba ya kozwa bikateli na oyo etali lisalisi ya minganga oyo asengeli kozwa.​—Bagalatia 6:5.

     “[Zulunalo oyo] esɛngi te lolenge moko boye ya nkisi to ya lisalisi ya minganga na esika ya mosusu, mpe epesi te toli na likambo etali lisalisi ya minganga. Emonisi kaka bosolo ya makambo mpe etiki motángi atalela makambo yango mpe azwa ye moko bikateli.”​—Lamuká! ya 08/02/1987, na Français.

     “Moto na moto asengeli kozwa ekateli ya kondima to koboya kokata mangwele to kozwa vaccin.”​—Lamuká! ya 22/08/1965, na Anglais.

  •   Tolukaka lisalisi ya minganga mpo tozwaka bomoi na valɛrɛ mingi.​—Misala 17:28.

     “Batatoli ya Yehova balukaka lisalisi ya minganga ntango bazali na mikakatano ya sante. Balingaka bomoi. Lisusu, basalaka nyonso oyo bakoki mpe makambo eyokani na Biblia mpo bákoba kozala na bomoi.”​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/1975, na Français.

     “Batatoli ya Yehova bandimaka nkisi mpe lisalisi ya minganga. Balingaka kozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi molai. Kutu, ndenge moko na Luka mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso, Batatoli ya Yehova mosusu bazali minganga . . . . Minganga mingi basalelaka bankisi oyo ezali kobuka te mitinda ya Biblia. Bankisi yango oyo Batatoli bandimaka ezalaka mbala mingi malamu koleka oyo ebukaka mibeko ya Nzambe.”​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 01/01/2011.