Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

alfa27/stock.adobe.com

KAMPANYE YA EKANISELI

Yesu akosilisa makambo ya mobulu

Yesu akosilisa makambo ya mobulu

 Yesu ayebi ndenge bato bayokaka soki bakutani na makambo ya mobulu mpe ya kozanga bosembo. Bakoselaki ye makambo, babɛtaki ye na ndenge oyo eyokani te na mibeko, basambisaki ye kozanga bosembo, bakatelaki ye etumbu oyo ebongi te mpe babomaki ye na ndenge ya nsɔmɔ. Atako asalaki likambo ya mabe te, andimaki “kopesa bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28; Yoane 15:13) Sikoyo, lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mosika te akotya bosembo na mabele mobimba mpe akosilisa makambo ya mobulu mpo na libela.​—Yisaya 42:3.

 Biblia emonisi ndenge mokili ekokóma ntango Yesu akosimba makambo na mabɔkɔ:

  •   “Bato mabe bakozala lisusu te; okotala esika oyo bazalaki, mpe bakozala lisusu wana te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asalá mpe oyo akosalela biso? Ndenge emonisami na Luka 22:19, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye. Yango wana mbula na mbula, Batatoli ya Yehova bayanganaka na mokolo oyo Yesu akufaki. Tobengisi yo na molulu ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu oyo ekosalema na mokolo ya lomingo, mwa 24/03/2024.

Luká koyeba esika Ekaniseli ekosalema