Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

AspctStyle/stock.adobe.com

KAMPANYE YA EKANISELI

Yesu akosilisa bitumba

Yesu akosilisa bitumba

 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete alingaka mpenza bato, tii apesaki kutu bomoi na ye mbeka mpo na bango. (Matai 20:28; Yoane 15:13) Mosika te, Yesu akomonisa lisusu ndenge alingaka bato ntango akosalela nguya oyo azali na yango lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpo na “kosilisa bitumba na mabele mobimba.”​—Nzembo 46:9.

 Talá makambo oyo Biblia elobi ete Yesu akosala:

  •   “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, ná moto mpamba mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te. Akoyokela moto mpamba ná mobola mawa, mpe akobikisa bomoi ya babola. Akobikisa bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:12-14.

 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asili kosala mpe oyo akosala mpo na biso? Na Luka 22:19, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákanisaka liwa na ye. Yango wana mbula na mbula, na mokolo ya liwa na ye, Batatoli ya Yehova bayanganaka elongo. Tobengisi yo na molulu ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu na mokolo ya lomingo, mwa 24/03/2024.

Luká koyeba esika oyo Ekaniseli ekosalema