Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zwá matomba na mbeka ya Yesu

Zwá matomba na mbeka ya Yesu

 Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova bayanganaka elongo na bamilio ya bato oyo babengisaka mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu kaka ndenge apesaki mitindo. (Luka 22:19) Molulu yango esalisaka biso tókanga ntina ya eloko oyo Yesu asalaki ntango apesaki bomoi na ye mpo na bato nyonso. Emonisaka mpe ndenge oyo mbeka yango ekoki kosalisa biso lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.​—Yoane 3:16.

 Ezala okoyangana na Ekaniseli ya mbula oyo to te, ndenge nini okoki kozwa matomba na nzela ya liwa ya Yesu? Yesu amonisaki ete tosengeli kosala makambo mibale oyo ya ntina mingi:

  1.  1. Yekolá koyeba Nzambe mpe Yesu. Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló mpe alobaki: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

  2.  2. Salelá makambo oyo ozali koyekola. Yesu amonisaki ete tosengeli kosalela mateya na ye na bomoi na biso. Na ndakisa, na nsuka ya lisolo na ye likoló ya ngomba, apesaki longonya na moto oyo azali “koyoka maloba na [ye] mpe kosalela yango.” (Luka 6:46-48) Ndenge moko mpe, mokolo moko, alobaki: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”​—Yoane 13:17.

 Okosepela koyeba makambo mingi mpo na Nzambe mpe Yesu? Ozali na mposa ya batoli oyo ebongi oyo ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koyekola? Oyo ezali mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo.

Boyekoli ya Biblia

 Boyekoli na biso ya Biblia ya ofele esalisi bato mingi báyeba Biblia mpe básalela makambo oyo yango elobaka na bomoi na bango.

  •   Okoki kosɛnga koyekola Biblia elongo na Motatoli ya Yehova moko mpo na koyeba ndenge programɛ yango esalemaka.

  •   Talá video Boyei malamu na boyekoli na yo ya Biblia mpo na komona ndenge oyo boyokeli ya Biblia esalemaka elongo na Motatoli ya Yehova moko.

Makita ya Batatoli ya Yehova

 Batatoli ya Yehova bayanganaka elongo mbala mibale na pɔsɔ moko na bisika na bango ya losambo oyo ebengamaka Ndako ya Bokonzi. Na makita yango, toyekolaka Biblia mpe ndenge oyo tokoki kosalela mateya yango na bomoi na biso.

 Moto nyonso akoki kokɔta na makita yango; esɛngi kaka te ozala Motatoli ya Yehova mpo oyangana elongo na biso. Na kotalela ndenge makambo ezali koleka na esika oyo ofandi, okoki kopona soki okosepela koyangana na Ndako ya Bokonzi to na nzela ya video na Internet.

  •   Talá video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? Mpo na komona na mokuse ndenge oyo makambo esalemaka na makita.

Masolo mpe bavideo na Internet

 Masolo mingi mpe bavideo oyo ezali na site Internet na biso ekoki kosalisa yo oyeba makambo mingi etali mateya ya Yesu mpe valɛrɛ ya liwa na ye.

 Na ndakisa, mpo na koyeba ndenge oyo liwa ya moto moko ememeli bamilio ya bato matomba, tángá lisolo “Ndenge nini Yesu abikisi biso?” mpe “Mpo na nini Yesu anyokwamaki mpe akufaki?” to talá video Mpo na nini Yesu akufaki?