Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?

Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?

 Makambo nini ekoki kosala ete nkita ya mboka ebeba mpe kokómisa bomoi na yo mpasi mpe ozala lisusu na mbongo mingi te mpo na kobika? Makambo lokola bamaladi mabe, makama oyo ebimaka yango moko, kobeba ya makambo ya politiki, mpe bitumba ekoki kobebisa nkita na mbalakaka. Makambo yango nyonso ekoki komemela biso mitungisi, kasi Biblia etondi na toli ya bwanya oyo ekoki kosalisa biso tósepela na mbongo moke oyo tozali na yango.

1. Mesaná na ndenge makambo ya bomoi na yo ebongwani.

 Toli ya Biblia: “Nayekoli sekele . . . ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.”​—Bafilipi 4:12.

 Atako ozali na mbongo mingi te ndenge ozalaki na yango liboso, okoki komesana na ndenge makambo ya bomoi na yo ebongwani. Ntango ondimi mbongwana yango mpe osali makasi mpo na komesana na yango, yo ná libota na yo bokozala na makasi ya koyikela yango mpiko.

 Luká koyeba lisalisi oyo guvɛrnema ezali kopesa to ya bibongiseli mosusu oyo esalisaka bato, oyo ekoki kosalisa bino. Salá na lombangu mpo na kozwa lisalisi ya yango mpo mbala mingi ezalaka na motángo ya bato oyo batyaka mpe bapesaka mwa ntango mpo bázwa lisalisi yango.

2. Salá elongo na libota na yo.

 Toli ya Biblia: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te, kasi ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”​—Masese 15:22.

 Sololá likambo yango elongo na mwasi na yo mpe na bana na yo. Soki bosololi malamu, ekosalisa moto mokomoko na libota asala makasi mpo na koyeba mbongwana yango mpe kopesa lisalisi oyo esengeli. Ntango bozali kosala elongo mpe boboyi bisombasomba, yango ekosalisa bino bósalela mbongo oyo bozali na yango na mayele mpenza.

3. Salá programɛ mpo na ndenge ya kosalela mbongo.

 Toli ya Biblia: “Akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga.”​—Luka 14:28.

 Ntango esɛngi ete obika kaka na mbongo moke, ezali na ntina mingi oyeba epai wapi mbongo na yo nyonso ezali kokende. Salá programɛ mpo na ndenge ya kosalela mbongo na kolanda motángo ya mbongo oyo okobanda kozwa na sanza nyonso na kotalela makambo ya bomoi na yo. Na nsima, komá motángo nyonso ya mbongo oyo okobanda kosalela sanza nyonso mpe motángo ya mbongo oyo omesaná kobimisa, atako oyebi ete motángo yango esengeli kobongwana. Meká mpe kobakisa mbongo oyo okobanda kobomba mpo na makambo mosusu oyo ekanami te oyo ekoki kobima na nsima ná motángo ya mbongo oyo okobanda kobimisa sanza nyonso.

 Toli: Ntango ozali kolandela liste na yo oyo obongisaki, kobosana mpe te kobakisa mbongo mpo na biloko mosusu ya mikemike. Yango ekosalisa yo oyeba soki mbongo boni okosalela mpo na biloko yango ya mikemike. Na ndakisa, mobali moko nsima ya kolandela liste oyo asalaki mpo na kosomba biloko, ayaki komona ete asalelaki bankama ya dolare kaka mpo na kosomba bazoka!

4. Luká koyeba makambo oyo eleki ntina mpe bongolá makambo mosusu.

 Toli ya Biblia: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

 Kokanisá mbongo oyo ozwaka ná mbongo oyo obimisaka mpo na kosalela, mpe luká koyeba biloko oyo ekosɛnga yo olongola yango na liste to okitisa motángo ya mbongo oyo okobimisa, kosala bongo ekosalisa yo osalela malamu mbongo oyo ozwaka. Tótalela makambo oyo elandi:

  •   Transport. Soki ozali na mituka mingi, okoki kotɛka moko? Soki ozali na motuka ya ntalo mingi mpe ya kitoko makasi, okoki kosomba oyo ezali ya ntalo moke? Okoki kosalela transport ya bato nyonso to velo to kotambola na makolo?

  •   Masano. Okoki kolongola programɛ mosusu ya TV oyo esɛngi kofutela yango mbongo mpo na mwa ntango? Na ndakisa bashɛni ya TV oyo ezwamaka na nzela ya satelite? Okoki kosalela lolenge mosusu oyo esɛngaka mbongo mingi te? Na ndakisa, kosalela baprogramɛ ya TV ya mboka esika ozali mpo esɛngaka te kofutela yango mbongo.

  •   Kura mpe mai. Sololá na libota na yo ndenge oyo bokoki kobanda kosalela mai, kura, ná gaze. Bomáká miinda mpe sokoláká mai moke, kosala bongo ekoki komonana ete ezali na ntina te, kasi ekosalisa yo obatela mbongo.

  •   Bilei. Na esika ya kokende kolya na restora, lambáká bilei na ndako. Bongisáká liboso biloko oyo okolamba, sombáká biloko mingi mpe lambáká yango soki makoki ezali mpe oyo ekotikala bombáká yango. Salá liste liboso ya kokende kosomba biloko oyo ozali na mposa na yango mpo osomba te biloko oyo okanaki te. Sombá biloko oyo ezali malamu mpe oyo elonami na mboka na bino, oyo ezali mpenza ntalo mingi te. Kosomba te biloko oyo etongaka nzoto te. Soki esengeli okoki mpe kosala bilanga ya ndunda na lopango na yo.

  •   Bilamba. Sombá kaka bilamba ya sika mpo na kolongola oyo ekómi ya kala to enzuluki kasi te mpo na kolanda bamodɛlɛ ya mikolo oyo. Okoki kokende kosomba bilamba na eleko oyo bakitisaka ntalo na yango to na tombola kasi oyo ezali naino malamu mpo na kolata. Nsima ya kosokola elamba, tandá yango na nsinga na moi; yango ekosalisa yo obatela mbongo oyo olingaki kofuta mpo na kokausa yango na masini ya kokausa bilamba.

  •   Biloko ozali kokana kosomba na mikolo ezali koya. Liboso ya kosomba eloko moko, omituna boye: ‘Nazali mpenza na mbongo ya kosomba eloko yango? Nazali mpenza na mposa na yango?’ Okoki kosomba baaparɛyi to motuka mbala ya nsima? To mpe, okoki kotɛka biloko oyo osalelaka lisusu te to oyo ozali lisusu na mposa na yango te? Kosala bongo ekosalisa yo ozala na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe osalela malamu mbongo oyo ozali na yango.

 Toli: Ntango ozali lisusu te na mbongo ndenge ozalaki na yango liboso, yango ekotinda yo otika makambo mosusu ya mabe oyo omesaná na yango mpe biloko oyo elyaka mbongo mingi, na ndakisa; kosalela tumbako to makaya, kobɛta masano ya mbongo, to kolangwa masanga. Kosala bongo ekosalisa yo kaka te na kosalela mbongo na ndenge oyo ebongi, kasi okozala mpe na sante ya malamu.

5. Luká koyeba Nzambe.

 Toli ya Biblia: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

 Biblia epesi toli oyo ya malamu: “Bwanya ebatelaka ndenge mpe mbongo ebatelaka; kasi litomba ya boyebi ezali ete bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.” (Mosakoli 7:12) Bato mingi bamoni ete kolanda bwanya oyo ezali na kati ya Biblia mpe kosalela toli na yango esalisi bango báboya komitungisa koleka ndelo mpo na mbongo.​—Matai 6:31, 32.