Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BalanceFormcreative/iStock via Getty Images Plus

Kosalisa basusu; solisyo mpo na kotika komiyoka yo moko​—Oyo Biblia elobi

Kosalisa basusu; solisyo mpo na kotika komiyoka yo moko​—Oyo Biblia elobi

 Bato mingi na mokili bazali komiyoka bango moko mpe lokola nde bazali mosika na basusu. Bato ya mayele na makambo ya sante bandimi ete kosalisa bato mosusu ezali lolenge moko malamu ya kobundisa mayoki ya kozala yo moko.

  •   “Kosalisa bato mosusu oyo bazali na bosɛnga ekoki kosala ete bomoi na biso ezala na ntina mpe esalisaka mpo na kobondisa mayoki ya kozala yo moko to kozala mosika na basusu.”​—U.S. National Institutes of Health.

 Biblia epesi batoli ya ntina mpo na oyo tokoki kosala mpo na kosalisa basusu. Kosalela batoli yango ekoki kosalisa biso mpo tólonga mayoki ya kozala biso moko.

Oyo okoki kosala

 Kabáká. Luká mabaku ya kolekisaka ntango elongo na basusu. Kabeláká basusu. Ntango ozali kosala bongo, basusu mpe bakosala bongo mpo na yo, yango ekosala ete boninga na bino ekóma makasi.

  •   Etinda ya Biblia: “Bózala na momeseno ya kopesa mpe bato bakopesa bino.”​—Luka 6:38.

 Salisáká basusu. Luká mabaku ya kosalisa bato oyo bazali kolekisa bantango ya mpasi. Na ndakisa, koyoka moto na likebi mpenza to kondima kosalisa ye na misala oyo ekoki kokitisa ye mwa mitungisi.

  •   Etinda ya Biblia: “Moninga ya solo alakisaka bolingo na ye tango nyonso.”​—Masese 17:17, Bible na Lingala ya lelo oyo.

 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge ya kokómisa makasi boninga ná basusu, tángá lisolo “Libota mpe boninga ná basusu.”