Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libota mpe boninga ná basusu

Libota mpe boninga ná basusu

Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi mpenza kozala na boyokani malamu ná libota mpe ná baninga. Talá batoli mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo ozala na boyokani malamu ná basusu.

LUKÁ BOLAMU YA BASUSU

TOLI YA BIBLIA: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

YANGO ELIMBOLI NINI? Okozala na boyokani malamu ná basusu soki otye makanisi na oyo okoki kosalela bango, kasi te na oyo bakoki kosalela yo. Soki ozali koluka kaka bolamu na yo moko, okobebisa boninga na yo na basusu. Na ndakisa, mobalani oyo alukaka kaka bolamu na ye moko, yango ekoki kosala ete azala sembo te epai ya molongani na ye. Lisusu, moto moko te alingaka kozala moninga ya moto ya lolendo, oyo ntango nyonso alobelaka biloko azali na yango to makambo oyo ayebi. Yango wana buku moko (The Road to Character) elobi ete: “Bato oyo balukaka kaka bolamu na bango mpe bakipaka basusu te bazalaka na mikakatano mingi.”

OYO OKOKI KOSALA:

  • Salisá basusu. Baninga ya malamu batyelanaka motema mpe basalisanaka. Ankɛtɛ moko emonisi ete bato oyo basalisaka basusu banyokwamaka mpenza te na makanisi mpe bamipesaka valɛrɛ koleka ndelo te.

  • Mityá na esika ya basusu. Moto oyo amityaka na esika ya basusu ayokaka mpasi oyo bango bazali koyoka. Soki ozali komitya na esika ya basusu, okosalela te maloba mabe, oyo ezali komonana lokola masɛki, kasi ekozokisa basusu.

    Soki ozali komitya na esika ya basusu, okokanga motema soki basali yo mabe. Na ndenge yango, okoboya kokanisela bato mabe mpe okosala boninga na bato ya mikili mpe mimeseno mosusu.

  • Lekisá ntango na basusu. Soki ozali kolekisa ntango na basusu, okoyeba bango malamu. Soki olingi kozala na baninga ya malamu, osengeli kosolola na bango makambo oyo etungisaka bango mpe oyo ezali na ntina mpo na bango. Yokáká bango malamu. Monisá ete ozali komitya na esika na bango. Ankɛtɛ moko elobi ete “masolo ya ntina ekoki kosala ete bato bázala na esengo.”

PONÁ MALAMU BANINGA

TOLI YA BIBLIA: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:33.

YANGO ELIMBOLI NINI? Bato oyo tolekisaka na bango ntango mingi bakoki kosala ete tókóma na bizaleli malamu to bizaleli mabe. Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya moto balobi ete baninga bakoki mpenza kobongola bomoi ya moto. Na ndakisa, moto akoki kobanda komɛla makaya to koboma libala soki baninga na ye bamɛlaka makaya to babomá mabala.

OYO OKOKI KOSALA: Salá boninga na bato oyo bazali na bizaleli malamu mpe bapesaka batoli ya malamu oyo okoki kolanda. Na ndakisa, salá boninga na bato oyo bazali na maloba ya kozokisa te, bazali na limemya, bakabaka mpe bayambaka bapaya.

BATOLI MOSUSU YA BIBLIA

Talá bavideo ya masolo ya Biblia oyo esalemi mpo na kosalisa babalani, bilenge mpe bana bázala na libota ya esengo

BOYÁ MALOBA MABE.

“Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.”​—MASESE 12:18.

KABELÁ BASUSU.

“Molimo oyo ekabaka ekokóma mafutamafuta.”​—MASESE 11:25.

SALELÁ BATO MAKAMBO NDENGE OLINGAKA BÁSALELA YO.

“Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—MATAI 7:12.