Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasala nini mpo namibatela na bansango ya lokuta?

Nasala nini mpo namibatela na bansango ya lokuta?

 Lelo oyo, bansango ndenge na ndenge ezali bisika nyonso. Bansango yango ekoki kutu kosala ete tóbatela sante na biso. Kasi ntango tozali kosala bolukiluki, tosengeli kokeba na bansango oyo ebongi te, na ndakisa:

 Na ndakisa, na eleko ya maladi mabe ya coronavirus, secrétaire général ya ONU akebisaki bato na bansango ya lokuta oyo ezalaki kotambola, mpo na yango alobaki boye: “Batoli ya mabe mpe minganga ya lokuta batondi. Bozali koyoka bansango ya lokuta na TV to na radio. Bato bazali kopanza bansango ya lokuta na Internet. Ezali mpasi te kokanisela bato to bituluku moko ya bato mabe mpe kokosela bango makambo.”

 Ya solo, bansango ya lokuta ebandá lelo te. Kasi, Biblia esakolaki ete na mikolo na biso, “bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka, bakokosa bato mpe bango moko bakokosama.” (2 Timote 3:1, 13) Lelo oyo, Internet ezali kosala ete tózwa bansango ya lokuta mpe tópanza yango na pɛtɛɛ nyonso mpe na lombangu koleka ndenge ezalaki liboso. Yango wana, bamesaje mpe bansango ya sika oyo tozwaka na nzela ya adrɛsi e-mail na biso, basite ya kosolola na bato ekoki kotonda na bansango ya lokuta to oyo babombi makambo mosusu.

 Okoki komibatela na bansango ya lokuta mpe banungunungu ya lokuta? Tótalela mwa batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa.

  •   Kondima te makambo nyonso ozali komona to koyoka

     Oyo Biblia elobi: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

     Tokoki kokosama soki tozali ekɛngɛ te na bafɔtɔ ná maloba oyo ezali kolimbola yango, to bavideo ya mokuse oyo epanzani mingi na Internet, mingimingi na nzela ya basite ya kosolola na bato. Babengaka yango mbala mingi memes, mpe basalá yango mpo na kosɛkisa bato. Kasi, na pɛtɛɛ mpenza bililingi mpe bavideo yango ekoki kosalelama na ndenge mosusu to kobima kaka pwasa kozanga koyebisa bato soki video to elilingi yango ezali kolobela nini. Mbala mingi, bato basalaka bavideo ya bato oyo bazali koloba to kosala makambo oyo balobá to basalá naino te.

     “Bato mingi oyo basalaka bolukiluki bamoni ete bililingi to bavideo oyo batyaka na basite ya kosolola na bato to na Internet ezalaka ya lokuta mpe bato yango bayebisaka te soki bililingi to bavideo yango ezali kolobela nini, ebimaka kaka lokola eloko babengi memes.”​—Axios Media.

     Omituna boye: ‘Nsango yango ezali nsango ya solo to ezali kaka eloko babengi meme?’

  •   Luká koyeba soki nsango yango euti wapi mpe makambo nini ezali na kati

     Oyo Biblia elobi: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.”​—1 Batesaloniki 5:21.

     Liboso ya kondima nsango moko to kotindela yango moto mosusu, ata nsango oyo bato mingi bayebi to oyo bazali kozongela mingi, luká koyeba soki ezali solo. Ndenge nini okosala yango?

     Luká koyeba esika nsango yango euti mpo omindimisa ete nsango yango ezali solo. Bashɛni ya TV to ya radio to bibongiseli mosusu ekoki kopanza bansango ya lokuta mpo na kokolisa mombongo na bango to mpo na kopesa mabɔkɔ na makambo ya politiki. Kokanisá makambo oyo ozali komona ná bashɛni to bibongiseli mosusu oyo ezali kolobela nsango yango. Mbala mosusu, baninga bakoki kotindela yo bansango ya lokuta kozanga koyeba to kotya yango na basite na bango ya kosolola na bato. Na yango, kondima te nsango moko liboso ya koluka koyeba esika euti.

     Luká koyeba makambo oyo ezali na kati soki ezali solo mpe ebongi kotyelama motema. Luká koyeba badati, bosolo na yango mpe bilembeteli oyo endimisi makambo oyo balobi. Zalá ekɛngɛ mingimingi soki nsango moko ezali mpasi kasi balimboli yango na maloba ya pɛtɛɛ to lisolo yango ekomami na mokano ya kotinda yo osala mwa makambo.

     “Koluka koyeba soki makambo oyo balobi ezali solo, na ntembe te ezali na ntina ndenge moko na kosukola mabɔkɔ.”​—Sridhar Dharmapuri, responsable pour la sécurité alimentaire et la nutrition à l’ONU.

     Omituna boye: ‘Bazali kolobela makambo nyonso oyo ezali na kati ya nsango yango to babombi makambo mosusu?’

  •   Tiká bilembeteli etambwisa yo, kasi te makambo oyo olingaka

     Oyo Biblia elobi: “Ye oyo azali kondimela motema na ye moko azali zoba.”​—Masese 28:26.

     Mbala mingi tondimelaka bansango oyo endimisi makambo oyo tolingaka. Bakompanyi ya Internet mpe basite ya kosolola na bato epesaka biso bansango na kotalela mposa na biso mpe elandelaka makambo oyo tolingaka koyeba. Nzokande, makambo oyo tolingaka koyoka ezalaka ntango nyonso te makambo oyo tozali na mposa ya koyoka.

     “Bato bazali na makoki ya kokanisa mpe kolandela makambo ndenge ezali, kasi bamposa, bilikya, kobanga mpe mayoki na biso ekoki mbala mingi kotinda biso tóndima nsango moko ete ezali solo, mingimingi soki nsango yango ezali kolobela likambo oyo tozali na mposa ya kondimela.”​—Pete Ditto, psychologue social.

     Omituna boye: ‘Nandimelaka nsango moko kaka mpo nazali na mposa ya kondimela yango?’

  •   Kopanza te bansango ya lokuta

     Oyo Biblia elobi: “Osengeli te kopalanganisa nsango oyo ezali solo te.”​—Kobima 23:1.

     Kobosana te ete nsango oyo otindelaka bato mosusu ekoki kobebisa to kobongisa makanisi na bango mpe ndenge na bango ya kosala makambo. Ata soki opanzi nsango moko ya lokuta na nko te, yebá ete ekoki kobimisa makama ya minene.

     “Etinda ya libosoliboso ezali ya kotɛlɛma mpe ya komituna boye: ʻNamindimisi mpenza ete nsango oyo ezali solo mpo na kotindela baninga na ngai?’ Soki bato nyonso bazalaki kosala bongo, mbɛlɛ bansango ya lokuta ekokaki kopanzana mingi boye te na Internet.”​— Peter Adams, News Literacy Project, programme d’éducation aux médias.

     Omituna boye: ‘Nazali kotinda nsango oyo mpo nayebi ete ezali solo?’