Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Bayuda bautaki nde “na bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola” ntango bayaki na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33?

Ebele ya bato na balabala na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso

Longola makambo oyo Biblia elobi na Misala 2:5-11, Philon mokomi moko ya ntango wana oyo azalaki Moyuda alobelaki lisolo moko oyo emonisaki ebele ya bato oyo bayaki na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso.

Philon akomaki boye mpo na bato oyo bazalaki kosala mibembo na Yerusaleme: “Na fɛti nyonso, ebele ya bato ya bingumba ndenge na ndenge bazalaki koya na nzela ya mokili mpe bamosusu na nzela ya mai, kouta na ɛsti, wɛsti, nɔrdi mpe sudi.” Atángaki mpe mokanda oyo mokonzi Agripa I, nkɔkɔ ya Erode monene, oyo atindelaki Caligula amperɛrɛ ya Roma. Na mokanda yango, Agripa alobaki boye mpo na Yerusaleme: “ Engumba mosantu . . . ezali te engumba-mokonzi ya ekólo moko ya Yudea kasi mpe ya bikólo mosusu mpo bato oyo bazalaki koya wana bazalaki kouta na bikólo nyonso ya zingazinga, oyo Baroma bakonzaki.”

Agripa asalaki liste ya bisika oyo Bayuda bazalaki kofanda na bamboka mosusu, ata mpe mosika mpenza na Mezopotamia, nɔrdi ya Afrika, Asie Mineure, Grɛsi mpe bisanga ya Mediterane. Joachim Jeremias moto moko ya mayele alobi boye: “Atako liste yango elobeli polele te mibembo na Yerusaleme, kasi emonisi ete bato bazalaki kosala mibembo mpo ezalaki mobeko ete Moyuda nyonso oyo akómi mokóló asala mobembo na Yerusaleme.”​—Kolimbola Mibeko 16:16.

Ebele ya bato oyo bazalaki koya na bafɛti ya Bayuda na Yerusaleme bazalaki kolala wapi?

Esika oyo ebebá, oyo bamonaki na Yerusaleme epai bazalaki kosala molulu ya kosukola

Mbula nyonso, bafɛti misato ezalaki kosalema na Yerusaleme​—Pasika, Pantekote mpe fɛti ya mwa bandako ya matiti. Na siɛklɛ ya liboso, ebele ya bato bazalaki kouta na Yisraele mobimba mpe na bisika nyonso oyo Bayuda bazalaki kofanda mpo na koya na bafɛti yango na Yerusaleme. (Luka 2:41, 42; Misala 2:1, 5-11) Bato wana nyonso ya mibembo basengelaki koluka bisika ya kolala.

Bamosusu bazalaki kolala epai ya baninga; basusu na Baotɛlɛ to na bisika mosusu. Mingi bazalaki kolala na bahema na kati to zingazinga ya bifelo ya engumba yango. Na mbala ya nsuka oyo Yesu afandaki na Yerusaleme, alalaki na Betani, engumba moko ya pembeni.​—Matai 21:17.

Bamonaki bandako mingi oyo ezalaki na ebele ya basaani ya minene ya kosukola pene na tempelo. Ekoki kozala ete bandako yango ezalaki baotɛlɛ oyo bato ya mibembo bazalaki kofanda mpe kosukola nzoto liboso ya kokɔta na tempelo. Makomi oyo bamonaki na moko ya bandako yango emonisi ete Théodote, nganga-nzambe mpe mokambi ya sinagoga oyo ezalaki wana “atongaki sinagoga yango mpo na kotánga Torah mpe . . . lisusu, otɛlɛ, bashambrɛ mpe bisika ya kobomba mai mpo na kofandisa bapaya oyo bazalaki na bosɛnga.”