Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Longola Biblia, nini lisusu endimisi ete Bayisraele bazalaki baombo na Ezipito?

Biblia emonisi ete ntango Bamidiane batɛkaki Yozefe na Ezipito, na nsima Yakobo tata na ye mpe libota na ye mobimba balongwaki Kanana mpe bakendaki na Ezipito. Bafandaki na etúká ya Ezipito oyo ebengami Goshene, pene na esika oyo Ebale Nile emibwakaka na mbu. (Eba. 47:1, 6) Bayisraele “bazalaki kaka kokóma mingi mpe kokóma makasi mingi koleka.” Na yango, Baezipito bakómaki kobanga Bayisraele mpe bakómisaki bango baombo.​—Kob. 1:7-14.

Bato mosusu batyolaka lisolo yango ya Biblia, balobaka ete ezali lisapo mpamba. Kasi, ezali na elembeteli oyo emonisi ete ba-Sémites * bafandaki lokola baombo na Ezipito ya kala.

Na ndakisa, bato ya arkeoloji bamonaki bitiká ya bamboka mikemike ya kala na nɔrdi ya Ezipito. Doktɛrɛ John Bimson alobi ete ezali na bamboka mikemike 20 to koleka oyo emonisi ete ba-Sémites bafandaki wana na nɔrdi ya Ezipito. Lisusu, James Hoffmeier, moto ya mayele oyo ayekolaka makambo ya Ezipito, alobi boye: “Kobanda mobu soki 1 800 tii 1540 liboso ya Kristo, ba-Sémites oyo bazalaki kouta na wɛsti ya Azia bazalaki kolinga mingi kokende na Ezipito.” Abakisi ete: “Ntango yango eyokani na ‘Eleko ya tata ya mabota’ [Yakobo] mpe na ndenge yango eyokani na eleko mpe makambo oyo mokanda ya Ebandeli elobeli.”

Ezali na elembeteli mosusu oyo eutaki na sudi ya Ezipito. Papirisi moko ya ntango ya Moyen Empire (mobu soki 2 000 tii mobu soki 1 600 L.T.B.) ezali na nkombo ya baombo oyo bazalaki kosala na ndako moko na sudi ya Ezipito. Bankombo koleka 40 kati na yango ezalaki bankombo ya ba-Sémites. Baombo, to basali yango, bazalaki kolamba, kotonga bilamba, mpe kosala misala makasi ya mabɔkɔ. Hoffmeier alobi boye: “Lokola ba-Sémites koleka 40 bazalaki kosala na ndako wana moko na Thébaïde [sudi ya Ezipito], emonani ete bazalaki mingi mpenza na Ezipito mobimba, mingimingi, na mokili oyo ezali pene na esika oyo Ebale Nile emibwakaka na mbu.”

David Rohl, oyo azali moto ya arkeoloji, akomi ete bankombo mosusu ya baombo oyo ezali na liste yango “ekokani na bankombo oyo ezali na Biblia.” Na ndakisa, bitanda yango ezali na bankombo oyo ekokani na bankombo lokola Isakare, Ashere, mpe Shifara. (Kob. 1:3, 4, 15) Rohl asukisi na maloba oyo: “Yango ezali mpenza elembeteli oyo emonisi ete Bayisraele bazalaki baombo na Ezipito.”

Doktɛrɛ Bimson alobi boye: “Makambo oyo Biblia elobi na oyo etali boombo na Ezipito mpe Kobima eyokani mpenza na istware.”

^ par. 4 Liloba Sémite euti na nkombo ya Seme, moko ya bana misato ya Noa. Emonani ete bakitani ya Seme bazalaki bato ya Elame, bato ya Asiri, Bakaladea ya ntango ya kala, Baebre, bato ya Siri, mpe mabota ndenge na ndenge ya Arabie.