Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MOTO AKOKI KOKOBA KOZALA NA BOMOI NSIMA YA LIWA?

Elikya mpo na bakufi​—Nini ekoki kotinda yo otyela yango motema?

Elikya mpo na bakufi​—Nini ekoki kotinda yo otyela yango motema?

Ezali bozoba kokanisa ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi? Ntoma Paulo akanisaki bongo te. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe akomaki boye: “Soki na bomoi oyo kaka nde totyelaki Kristo elikya, tozali mpenza bato ya mawa koleka bato nyonso. Nzokande, sikoyo Kristo alamuki uta na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” (1 Bakorinti 15:19, 20) Paulo amonaki ete lisekwa ezali likambo ya solo mpenza. Kutu, lisekwa ya Yesu nde endimisaki mpenza likambo yango. * (Misala 17:31) Yango wana Paulo abengaki Yesu “mbuma ya liboso,” elingi koloba, azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na bomoi ya seko. Soki Yesu azalaki moto ya liboso, ebongi mpenza tóndima ete bamosusu mpe bakosekwa.

Yobo alobaki na Nzambe boye: “Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Yobo 14:14, 15

Talá ntina mosusu oyo osengeli kondima elikya ya lisekwa. Yehova azali Nzambe ya solo. “Nzambe . . . akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Yehova akosá ata mbala moko te mpe akotikala kokosa te. Akoki nde kolaka lisekwa, komonisa ete akoki kosekwisa bato mpe na nsima akokisa elaka yango te? Yango ekoki kosalema te!

Mpo na nini Yehova akani kosekwisa bato na mikolo ezali koya? Ezali mpo na bolingo na ye. Yobo atunaki boye: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi? . . . Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:14, 15) Yobo andimaki mpenza ete Tata na ye ya likoló oyo azali bolingo, akozala na mposa makasi ya kosekwisa ye. Nzambe abongwaná? “Ngai nazali Yehova; nabongwani te.” (Malaki 3:6) Nzambe azalaka kaka na mposa makasi ya komona bakufi bazongi na bomoi na nzoto malamu mpe na esengo. Yango nde likambo moboti nyonso ya bolingo akolinga soki mwana na ye akufi. Na kokesana na baboti, Nzambe azali na nguya ya kosala oyo alingi.​—Nzembo 135:6.

Liwa ezali likambo ya nsɔmɔ mpenza, kasi Nzambe azali na solisyo oyo ebongi

Yehova akopesa Mwana na ye nguya ya kopesa esengo epai ya baoyo nyonso balelá bandeko to baninga na bango oyo bakufá. Kasi, Yesu amiyokaka ndenge nini mpo na lisekwa? Liboso asekwisa Lazare, Yesu amonaki mawa makasi oyo bandeko mpe baninga ya Lazare bazalaki na yango mpe ye moko “alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoane 11:35) Mokolo mosusu, Yesu akutanaki na mwasi oyo mobali akufá ya mboka Naine mpe mwana kaka moko oyo azalaki na ye, akufaki. Yesu “ayokelaki ye mawa, mpe alobaki na ye ete: ‘Tiká kolela.’” Asekwisaki mbala moko mwana yango. (Luka 7:13) Na yango, mawa mpe liwa esalaka Yesu mpasi na motema. Yesu akosepela mpenza ntango akobongola mawa ya bato na mabele mobimba esengo!

Osí okutaná na makambo ya mawa? Okoki kokanisa ete liwa ezali likambo oyo ezangá solisyo. Kasi solisyo ezali ete Nzambe akosekwisa bato na nzela ya Mwana na ye. Kobosana te ete Nzambe alingi omona solisyo yango. Alingi ete ozala wana mpo na koyamba bandeko to baninga na yo oyo bakufá. Meká komona na makanisi ndenge yo ná bango bozali kobongisa makambo oyo bokosala libela na libela kozanga ete bokabwana lisusu!

Lionel, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nsukansuka, nayekolaki likambo etali lisekwa. Na ebandeli, ezalaki mpasi nandima yango mpo nazalaki kotyela moto oyo ayebisaki ngai makambo yango motema te. Kasi, natángaki yango na Biblia mpe namonaki ete ezali mpenza solo! Nazali kozela na mposa makasi komona lisusu nkɔkɔ na ngai ya mobali.”

Okosepela koyeba makambo mosusu? Batatoli ya Yehova bakosepela kolakisa yo na Biblia na yo moko mpo na nini bandimaka mpenza ete lisekwa ekozala na mikolo ekoya. *

^ par. 3 Mpo na makambo oyo emonisi ete Yesu asekwaki, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? nkasa 78-86, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 9 Okoki kotala mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.