Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo ya kosala na ntango ya makama minene

Makambo ya kosala na ntango ya makama minene

Lokola makama minene oyo ezali mpenza kobebisa ezali kosalema mbala na mbala, okoki kosala nini? Tótalela mwa makambo ya ntina oyo okoki kosala.

Boyá kofanda na bisika oyo makama ekoki kobima.

Biblia elobi ete: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.” (Masese 22:3) Toli oyo ekoki mpenza kosalelama mpo na likambo etali makama. Soki bazali kokebisa ete volcan ekobimisa mɔtɔ, to mpela ekozala, to mpe mopɛpɛ moko makasi ekozala, ekozala malamu kokima na esika oyo okozwa likama te. Bomoi ezali na motuya mingi koleka ndako to biloko.

Mpo na bato mosusu, ekoki kozala malamu koboya kofanda na esika oyo likama ekoki mpenza kobima. Buku moko elobi ete: “Bisika oyo makama minene esalemaka mingi eyebani mpe ezali mingi te na mabele mobimba.” Bisika yango ekoki kozala, na ndakisa, pembenipembeni ya bibale to mbu to mpe na bisika mabele ekoki kobukana to kokabwana. Okoki komibatela na makama soki oboyi kotonga ndako na bisika ya ndenge wana to mpe olongwe kuna mpe okei kofanda na esika ya malamu.

Bongisá makambo liboso.

Ata soki osali nyonso, makama mosusu ekoki kokómela yo na mbalakaka. Okoki koyeba ndenge oyo okosala soki obongisaki makambo liboso. Likanisi yango eyokani na toli ya Masese 22:3, oyo totángaki liboso. Ozali na mwa biloko oyo obongisá mpe otyá yango na esika oyo okoki kozwa yango nokinoki? Buku moko (1-2-3 of Disaster Education) epesi toli ya kobongisa biloko lokola oyo: sakosi oyo ezali na mwa biloko ya ntina lokola mwa bankisi, milangi ya mai, mwa basardini mpe mikanda ya Leta, ya kelasi to ya mosala. Ekozala malamu bósolola na kati ya libota mpo na koyeba makama oyo ekoki kosalema mpe oyo bokoki kosala soki esalemi.

Ozali na biloko oyo obongisá, oyo okoki kozwa yango nokinoki?

Zalá ntango nyonso penepene na Nzambe.

Yango ekoki kosalisa na likambo nyonso. Biblia elobi ete Nzambe azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” Vɛrsɛ mosusu mpe elobi ete Nzambe “abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto.”​—2 Bakorinti 1:3, 4; 7:6.

Ya solo, Nzambe ayebi malamu makambo oyo ekómelaka bato oyo batyelaka ye motema. Azali Nzambe ya bolingo mpe alendisaka biso na ndenge mingi. (1 Yoane 4:8) Soki moto azali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu, kasi likamwisi te, akoki koyikela ata mokakatano nini mpiko. Elimo santu ekoki kozongisa na makanisi ya bato oyo bazali na mpasi mikapo ya Biblia oyo ekoki kopesa bango makasi mpe kokitisa bango motema. Ya solo, bakoki mpenza koyoka lokola Davidi, Mokonzi ya Yisraele, oyo alobaki ete: “Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi, nabangaka eloko ya mabe ata moko te, mpo ozali elongo na ngai; nzete na yo mpe lingenda na yo ezali biloko oyo ebɔndisaka ngai.”​—Nzembo 23:4.

Soki moto azali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu, kasi likamwisi te, akoki koyikela ata mokakatano nini mpiko

Bakristo ya solo basalisanaka.

Na siɛklɛ ya liboso, mokristo moko na nkombo Agabusi asakolaki ete “nzala moko monene ekokwela mabele mobimba oyo bato bafandi; nzala oyo ekweaki na ntango ya Klode.” Bayekoli mingi ya Yesu oyo bazalaki kofanda na Yudea banyokwamaki na nzala yango. Ntango bandeko na bango bakristo oyo bazalaki na bisika mosusu bayokaki likambo yango, basalaki nini? Lisolo elobi boye: “Bayekoli mosusu bazwaki mokano, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango, ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko.” (Misala 11:28, 29) Batindelaki bandeko na bango biloko mpo na kosunga bango.

“Bandeko bamoniselaki ngai bolingo mpe babatelaki ngai”

Lelo oyo mpe, ntango likama moko ekweli basaleli ya Nzambe, bandeko na bango bakristo basalaka ndenge wana. Bato mingi bayebi ete Batatoli ya Yehova basalisanaka. Na ndakisa, ntango mabele eninganaki na ekólo Chili, mokolo ya 27 Febwali 2010, Batatoli ya Yehova basalaki makambo nokinoki mpo na kosalisa bandeko na bango na bisika yango. Karla, ndeko moko oyo ndako na ye ekweaki, alobi boye: “Nabɔndisamaki mingi mpe nalendisamaki mpenza ntango namonaki ete na mokolo oyo elandaki [bandeko na ngai Batatoli] bautaki na bisika mosusu mpe bayaki kosalisa biso. Na ntembe te, Yehova abɔndisaki biso na boboto ya bandeko wana. Bandeko bamoniselaki ngai bolingo mpe babatelaki ngai.” Nkɔkɔ na ye oyo azali Motatoli te amonaki ndenge oyo bandeko bakendaki kosalisa. Alobaki boye: “Namoná naino makambo ya boye te na lingomba na ngai.” Makambo oyo amonaki etindaki ye asɛnga Batatoli ya Yehova báyekola na ye Biblia.

Bakristo basalisanaka na ntango ya makama

Kozala elongo na bato oyo balingaka Nzambe ekoki kosalisa mingi na ntango ya mpasi. Atako bongo, ezali nde na mokolo oyo makama ekozala lisusu te na mabele mobimba? Tótalela oyo Biblia elobi na likambo yango.