Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo

Bósololaka malamu na bana oyo bakómi bilenge

Bósololaka malamu na bana oyo bakómi bilenge

“Liboso nazalaki kosolola malamu mpenza na mwana na ngai, kasi bandá akómá na mbula 16, ngai ná tata na ye toyebaka lisusu oyo azali kokanisa te. Akómá kofanda kaka ye moko na shambre na ye, mpe alobisaka biso mpenza te!”​—MIRIAM, MEXIQUE.

“Kala, bana na ngai bazalaki koyokela ngai na makambo nyonso. Soki nazali koloba, bazalaki mpenza kofungola matoi! Lelo lokola bakómi bilenge, bakómi kokanisa ete nakoki koyeba makambo na bango te.”​—SCOTT, AUSTRALIE.

SOKI ozali na mwana oyo akómi elenge, mbala mosusu yo mpe okutaná na makambo oyo baboti oyo tolobeli awa bakutanaki na yango. Ekoki kozala ete kala ozalaki kosolola malamu mpenza na mwana na yo. Kasi, sikoyo bosololaka lisusu malamu te. Angela, mama moko na Italie, alobi boye: “Ntango mwana na ngai azalaki naino moke, azalaki kotuna ngai mituna ebeleebele. Kasi lelo, ngai nde nasengeli kobanda ye masolo. Soki nalobisi ye te, tokoki kosala mikolo ebele kozanga tófanda mpo na kosolola.”

Lokola Angela, ntango mosusu yo mpe omonaka ete mwana na yo oyo azalaki koloba mingi akómá lokola baba. Soki olingi kosolola na ye, apesaka yo kaka biyano ya mikuse mpo na kokata lisolo. Na ndakisa, soki otuni ye, “Mokolo eleki ndenge nini?” Akoyanola mbala moko, “Malamu.” Soki otuni ye, “Boni lelo na eteyelo na bino?” Akoyanola, “Likambo te.” Soki otuni ye, “Mpo na nini olingi koloba te?” akopesa yo eyano te.

Toboyi te, bana mosusu baboyaka koloba te. Kasi, makambo oyo balobaka ezali te oyo baboti na bango balingaka koyoka. Edna, mama moko na Nigeria, alobi boye: “Mbala mingi soki natindi mwana na ngai, azalaki koloba kaka, ‘Naboyi na ngai!’” Ramón, na Mexique, alobi ete mwana na ye ya mbula 16 asalaka mpe bongo. Alobi boye: “Topotanaka na ye mikolo nyonso. Soki nasɛngi ye asala likambo moko, abandaka koluka mikalo mpo asala yango te.”

Soki moboti azali komeka kosolola na mwana na ye oyo alingi koloba te, ekoki kopesa ye nkanda. Biblia emonisi ete “myango ebebaka esika bato basololaka te.” (Mas. 15:22NW) Anna, mama moko na Russie oyo azali kobɔkɔla mwana na ye kaka ye moko, alobi boye: “Soki nayebi te oyo mwana na ngai azali kokanisa na likambo moko boye, epesaka ngai mpenza nkanda mpe nayokaka mposa ya kogangela ye.” Mpo na nini kaka na ntango bana bakómi bilenge, ntango oyo esɛngaka baboti ná bana básololaka mingi, nde makambo ebebaka?

Tóyebaka makambo oyo epekisaka kosolola malamu

Kosolola malamu ná koloba ezali makambo mibale ekeseni. Yesu alobaki ete “makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ . . . elobaka.” (Luka 6:45) Kosolola malamu esalisaka biso tóyeba makambo oyo basusu bazali kokanisa mpe bango báyeba oyo biso tozali kokanisa. Kasi mpo na bilenge, ezalaka mpenza mpasi bámonisa makanisi na bango polele, mpo soki mwana akómi na bambula wana, ata soki azalaki koloba mingi, alingaka lisusu koloba te. Bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya bana balobi ete mbala mingi bilenge bamonaka lokola bazali na esika ya lisano mpe miso ya bato nyonso ezali kotala bango. Na esika bátɛlɛma kaka wana, bakimaka miso ya bato mpe bakendaka komibomba.

Likambo mosusu oyo epekisaka baboti básololaka malamu na bana na bango ezali mposa ya lipanda oyo bilenge bazalaka na yango. Ndenge ya kokima likambo yango ezali te, mpo ntango mwana azali kokola, abandaka kokabwana mokemoke na baboti. Kasi, yango elimboli te ete ntango ekoki mpo mwana na bino atika bino. Na makambo mingi, akómi nde na mposa na bino koleka kutu liboso. Kasi, mwana abandaka kokabwana mokemoke na baboti liboso kutu akóma mobali to mwasi. Ntango bana bazali kokola, balingaka kotalela makambo na bango bango moko liboso báyebisa bato mosusu.

Nzokande, ndenge Jessica, mama moko na Mexique alobi yango, bilenge babombelaka baninga na bango makambo te. Alobi boye: “Ntango mwana na ngai ya mwasi azalaki naino moke, azalaki ntango nyonso koya koyebisa ngai makambo na ye. Kasi lelo oyo, akómá nde koyebisa baninga na ye.” Soki mwana na yo mpe azali kosala bongo, kokanisa te ete alingi lisusu te ozala moboti na ye. Baankɛti emonisi ete ata soki bana bazali kondima yango boye te, bapesaka motuya mingi na toli ya baboti na bango koleka oyo ya baninga na bango. Kasi, osengeli kosala nini mpo okoba kosolola malamu ná mwana na yo?

Sɛkɛlɛ ya kosololaka malamu na bilenge

Kanisá ete ozali kotambwisa motuka na balabala moko ya molai, oyo ezali mpenza semba. Na ntaka ya bakilomɛtrɛ mingi, okobanda mpenza kobalola yenda mingi te. Kasi, na mbala moko okómi na esika moko ya libunu makasi. Mpo motuka na yo etika nzela te, osengeli kobalola yenda makasi. Ezali mpe ndenge moko soki mwana na yo akómi elenge. Ekoki kozala ete na boumeli ya mwa bambula, osengelaki mpenza te kobongola lolenge na yo ya kosolola na ye. Sikoyo, lokola mbongwana monene ekɔti na bomoi ya mwana na yo, osengeli kobalola yenda, elingi koloba kobongola lolenge na yo ya kosolola na ye. Omituna mituna oyo elandi.

‘Ntango mwana na ngai azalaka na mposa ya kosolola, nalingaka kosolola na ye?’ Biblia elobi boye: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami na kati ya palata.” (Masese 25:11) Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi yango, mbala mingi koyeba kopona ntango ya kosolola na mwana na yo ezalaka sɛkɛlɛ monene. Na ndakisa, mosali bilanga akoki te kobuka biloko na ye liboso to nsima ya eleko ya kobuka mbuma. Asengeli kobuka yango na ntango oyo ebongi. Ekoki kozala ete mwana na yo mpe azalaka na ntango oyo asepelaka kosolola. Wana nde ntango oyo osengeli kosolola na ye. Frances, mama moko na Australie oyo abɔkɔlaka mwana na ye kaka ye moko, alobi boye: “Mbala mingi, mwana na ngai azalaki koya na shambre na ngai, mpe mbala mosusu tozalaki kolekisa na ye ngonga mobimba. Lokola naumelaka te kolala na butu, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, kasi na babutu wana tozalaki kosolola mingi.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki mwana na yo alingaka kosolola te, luká kosala na ye makambo esika moko; na ndakisa kobima elongo na ye na makolo to na motuka, kosakana to kosala mosala moko ya ndako elongo. Mbala mingi, kosala ndenge wana esalisaka bilenge bábimisa makambo oyo bazali na yango na motema.

Soki mwana alobi likambo, nasosolaka oyo alingaki mpenza koloba? Yobo 12:11 elobi boye: “Litoyi ekomeka maloba te? Mpe lolemo ekomeka elɛngi te?” Sikoyo nde ntango oyo osengeli ‘komeka’ makambo oyo mwana na yo azali koloba. Mbala mingi bilenge balekisaka ndelo na makambo oyo balobaka. Na ndakisa, mwana na yo akoki koloba, “Yo omonaka ngai ntango nyonso mwana moke!” To “Olingaka koyokela ngai ata mokolo moko te!” Na esika oluka komonisa ye ete makambo azali koloba ezali solo te, ekozala malamu oyeba ete mbala mosusu alingi mpenza koloba bongo te. Na ndakisa, soki alobi, “Yo omonaka ngai ntango nyonso mwana moke,” yango ekoki kolimbola, “Namoni lokola otyelaka ngai motema te”; mpe soki alobi, “Olingaka koyokela ngai ata mokolo moko te,” yango ekoki kolimbola, “Nalingi koyebisa yo makambo oyo ezali na motema na ngai.” Luká koyeba oyo alingi mpenza koloba.

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki mwana na yo akateli yo mangala, lobá na ye maloba lokola oyo: “Namoni lokola osepeli te; nakosepela koyoka oyo ezali na motema na yo. Yebisá ngai ntina oyo ozali kokanisa ete namonaka yo lokola mwana moke.” Mpe yoká ye kozanga kokata ye maloba.

‘Kozanga koyeba, napekisaka mwana na ngai koloba na ndenge nalobisaka ye na makasi?’ Biblia elobi boye: “Mbuma ya boyengebene, momboto na yango elonamaka na kimya mpo na baoyo batyaka kimya.” (Yakobo 3:18) Na maloba na yo mpe na makambo oyo ozali kosala, lukaká “kimya” mpo mwana na yo akakatanaka te kosolola na yo. Kobosana te ete yo ozali mosungi ya mwana na yo. Yango wana, ntango bozali kosolola, kozala te lokola zuzi oyo azali kosambisa ye. Ahn, tata moko na Corée, alobi boye: “Moboti ya bwanya atunaka mwana na ye te mituna lokola, ‘Okokola mokolo nini?’ to, ‘Nayebisá yo likambo oyo mbala boni?’ Nsima ya kosala libunga wana mbala na mbala, nayaki komona ete bana na ngai bazalaki kosepela te na ndenge nazalaki koloba na bango mpe na makambo oyo nazalaki kobimisa.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki mwana na yo azali koboya koyanola na mituna na yo, okoki komeka kosalela mayele mosusu. Na ndakisa, na esika ya kotuna soki alekisi mokolo ndenge nini, yebisá ye nde ndenge yo olekisaki oyo ya yo mpe talá soki akoyanola yo. To mpe, soki olingi koyeba likanisi ya mwana na yo na likambo moko boye, tuná ye mituna lokola nde likambo yango etali ye te. Tuná ye soki moninga na ye akoki kokanisa nini mpo na likambo yango. Na nsima, tuná ye soki akoki kopesa moninga yango toli nini.

Baboti, bokoki kolonga kosolola malamu na bana na bino. Bongolaká lolenge na yo ya kosolola na bana na kotalela mwana na mwana. Sololá na baboti mosusu oyo balongaki na likambo yango. (Masese 11:14) Ntango ozali kosolola na mwana na yo, osengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Oyo eleki nyonso, kolɛmba te kobɔkɔla bana na yo “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”​—Baefese 6:4.

OMITUNA . . .

  • Mbongwana nini namoni epai ya mwana na ngai banda akómá elenge?

  • Ndenge nini nakoki kobongisa lolenge na ngai ya kosolola na ye?