Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya komesana ntango okei na lisangá ya sika

Ndenge ya komesana ntango okei na lisangá ya sika

ESILÁ kokóma ete okende na lisangá ya sika? Soki bongo, na ntembe te okondima makambo oyo ndeko Jean-Charles alobaki, ete: “Komesana na lisangá ya sika wana ozali koluka ete moto nyonso na libota akoba kozala makasi na elimo ezalaka pɛtɛɛ te.” Ntango okei kofanda esika mosusu, ekoki kosɛnga oluka mosala, esika ya kofanda mpe mbala mosusu eteyelo ya sika mpo na bana, komesana na klima mosusu, mimeseno mosusu mpe teritware ya sika mpo na mosala ya kosakola.

Nicolas ná Céline bakutanaki na mokakatano ya ndenge mosusu. Betele ya France etindaki bango na lisangá mosusu. Balobi boye: “Na ebandeli tosepelaki, kasi na nsima tokómaki kokanisa baninga oyo totikaki. Tomesanaki naino mpenza te na bandeko na lisangá ya sika.” a Na kotalela mikakatano oyo nyonso, okoki kosala nini mpo omesana na lisangá ya sika? Ndenge nini basusu bakoki kosalisa? Mpe ndenge nini okoki kolendisa basusu mpe kolendisama na lisangá oyo okómi?

MAKANISI MINEI OYO EKOKI KOSALISA YO OMESANA NOKI

Tyelá Yehova motema

1. Tyelá Yehova motema. (Nz. 37:5) Kazumi, oyo afandaka na Japon, alongwaki na lisangá oyo aumelaki bambula 20 ntango kompanyi etindaki mobali na ye esika mosusu. Ndenge nini ‘atikaki Yehova atambwisa bomoi na ye’? Alobi boye: “Nasopelaki Yehova motema na ngai mpe nayebisaki ye ndenge nazalaki kobanga, komiyoka kaka ngai moko, mpe komitungisa. Mbala nyonso oyo nazalaki kosala yango, azalaki kopesa ngai makasi oyo nasengelaki na yango.”

Ndenge nini okoki kotyela Yehova motema lisusu mingi koleka? Kaka ndenge esɛngaka kosopa mai mpe kotya vitamini na mabele mpo molona ekola malamu, kondima na biso mpe esengeli na vitamini mpo ekóma makasi. Nicolas, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete komanyola na ndakisa ya Abrahama, ya Yesu, mpe ya Paulo, mibali oyo bamipimelaki makambo mingi mpo na kosala mokano ya Nzambe, esalisaki ye atyela lisusu Yehova motema mingi ete akosalisa ye. Kozala na programɛ ya malamu ya boyekoli na yo moko ya Biblia ekosalisa yo omesana na mbongwana nyonso oyo esalemi na bomoi na yo mpe okozala na makambo oyo okoki koloba mpo na kolendisa basusu na lisangá na yo ya sika.

Boyá kokokanisa makambo

2. Boyá kokokanisa makambo. (Mos. 7:10) Jules asengelaki komesana na mimeseno mosusu mpenza ntango alongwaki na Bénin mpe akendaki na États-Unis. Alobi boye: “Nazalaki komona ete nasengelaki kobɛtɛla moto nyonso oyo nakutani na ye lisolo ya bomoi na ngai.” Lokola makambo ekesanaki na esika oyo autaki, akómaki kokima bandeko ya lisangá. Kasi nsima ya koyeba malamu bandeko, abongolaki makanisi na ye. Alobi boye: “Namoni ete ata soki tozali na esika nini na mabele, bato bazali kaka ndenge moko. Kaka nde balobaka mpe basalaka makambo na lolenge ekeseni. Oyo eleki ntina ezali kondima bato ndenge bazali.” Na yango boyá kokokanisa lisangá na yo ya kala ná oyo ya sika. Salá lokola Anne-Lise, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo alobaki: “Soki nayei esika mosusu, ezali te mpo namona makambo natiki. Ezali nde mpo na koyekola makambo ya sika.”

Bankulutu mpe basengeli te kokokanisa lisangá na bango ya kala na oyo ya sika. Kosala makambo na lolenge mosusu elakisi te ete ezali mabe. Ezali bwanya koluka koyeba ndenge makambo ezalaka esika okómi liboso obanda kopesa makanisi. (Mos. 3:​1, 7b) Ezalaka malamu mingi koteya bandeko na ndakisa na esika ya kondimisa basusu makanisi na biso na lisangá.—2 Ko. 1:24.

Omipesa na makambo ya lisangá

3. Omipesa na makambo ya lisangá. (Flp. 1:27) Kolongwa esika ozali mpe kokende esika mosusu elyaka ntango mpe makasi, kasi ezali na ntina ya koyanganaka na makita kaka na ebandeli, kende na Ndako ya Bokonzi soki likoki ezali. Mpo, soki bandeko ya lisangá na yo ya sika bamonaka yo te, to bamonaka yo na mpasi, bakosalisa yo ndenge nini? Lucinda, oyo akendaki na bana na ye ya basi mibale na engumba moko monene na Afrique du Sud, alobi boye: “Balendisaki ngai ete namipesa na lisangá na ngai ya sika, nasakolaka elongo na basusu, mpe napesaka biyano na makita. Toyebisaki mpe bandeko ete bakoki kosalaka likita ya mosala ya kosakola epai na biso.”

“Kobunda elongo” mpo na kosala makambo ya elimo na bandeko na lisangá na yo ya sika ezali lolenge ya malamu mpenza ya kokolisa “kondima ya nsango malamu.” Anne-Lise, oyo tolobelaki liboso, bankulutu balendisaki ye asala makasi asakolaka na moto nyonso. Yango ebimisaki nini? Alobi: “Eumelaki te mpo namona ete ezali lolenge ya malamu ya komesana na lisangá.” Longola yango, kopesa mabɔkɔ na makambo lokola kotya bopɛto mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi ekomonisa bandeko ete ozali komona ete ezali mpe lisangá na yo. Soki ozali komipesa mingi, ekoumela te bandeko bándima yo mpe okomona ete ozali na kati ya libota ya sika ya bandeko.

Zwá baninga ya sika

4. Zwá baninga ya sika. (2 Ko. 6:​11-13) Kotyela bandeko likebi ezali lolenge eleki malamu ya kozwa baninga; na yango, zwáká ntango liboso mpe nsima ya makita mpo na kosolola na bandeko mpe luká koyeba bango. Salá makasi mpenza okangaka bankombo na bango. Soki ozali kokanga bankombo ya bandeko, komonisela bango boboto, mpe kosolisa bango malamu ekosala ete basusu báyaka pene na yo mpe na ntembe te bokokóma baninga mpenza.

Na esika omitungisa soki bakondima yo to te, tiká bango báyekola koyeba soki ozali mpenza nani. Salá ndenge Lucinda alobi, ete: “Sikoyo tozali na baninga ya motema mpo tozalaki kobengisa basusu epai na biso.”

“BÓYAMBANAKA”

Kokɔta na Ndako ya Bokonzi oyo etondi na bato oyo oyebi te ekoki kobangisa bato mosusu. Na yango, ndenge nini okoki kosalisa bato oyo bayei sika bázala motema ya kokita? Ntoma Paulo alendisaki biso boye: “Bóyambanaka ndenge Kristo mpe ayambaki bino.” (Rom. 15:7) Soki bankulutu bamekoli Kristo, bakoki kosalisa bato oyo bayei sika na lisangá bázala malamu. (Talá etanda “ Makambo oyo esalisaka baoyo bayei sika.”) Kasi, biso nyonso na lisangá, ata mpe bana, tokoki kosalisa bato oyo bayei sika báyoka ete bazali epai na bango.

Koyamba basusu elimboli mpe kobengisa bango na ndako mpe kosalisa bango na makambo mosusu. Na ndakisa, ndeko mwasi moko azwaki ndeko mwasi mosusu oyo ayaki sika mpe alekisaki ntango elongo na ye mpo na kotambwisa ye na engumba mpe kolimbwela ye ndenge basalaka mpo na kozwa bisi. Likambo oyo ndeko yango asalaki esimbaki mpenza motema ya ndeko mwasi wana mpe esalisaki ye amesana.

LIBAKU YA KOKOLA NA ELIMO

Ntango mayoyo ezali kokola, elongolaka mposo na yango mbala ebele liboso mapapu na yango ezwa likoki ya kopumbwa. Ndenge moko mpe, ntango okei na lisangá ya sika, osengeli kolongola kobanga nyonso oyo ekoki kopekisa yo ozwa mapapu mpo na kopumbwa na mosala ya Yehova. Nicolas ná Céline balobi boye: “Kokende na esika mosusu ezali formasyo ya malamu. Komesana na bato mosusu mpe esika ya sika elendisaka biso tólona bizaleli ya sika.” Jean-Clarles, oyo tolobelaki na ebandeli, amonisi matomba oyo libota na ye ezwaki; alobi boye: “Kokende esika mosusu esalisaki bana na biso bákola malamu na lisangá ya sika. Nsima ya basanza moke kaka, mwana na biso ya mwasi akómaki kosala badevuare na likita ya kati ya pɔsɔ mpe mwana na biso ya mobali akómaki mosakoli.”

Bongo soki bomoi na yo epesi yo nzela te ya kokende esika mosusu, na ndakisa epai mposa ezali mingi? Soki bongo, okoki kosala lokola oyei sika na lisangá na bino mpe komeka kosalela makanisi mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo. Wana otyeli Yehova motema, omipesa na makambo ndenge na ndenge ya lisangá, na ndakisa bimáká mosala ya kosakola elongo na basusu mpe zwá baninga ya sika to mpe kómisá makasi boyokani na yo na baninga oyo ozalaka na bango banda kala. Okoki mpe koluka bato ya sika to baoyo bazali na bosɛnga, mpe kosalisa bango na ndenge oyo esengeli! Lokola bolingo nde ezali ezaleli oyo emonisaka bakristo ya solo, na ntembe te kosala makambo wana ekosalisa yo okola na elimo. (Yoa. 13:35) Yebá ete “Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”—Ebr. 13:16.

Atako mikakatano, bakristo mingi oyo bakendaki na lisangá ya sika balongaki, yo mpe okoki kolonga! Anne-Lise alobi boye: “Kokende na masangá mosusu esalisaki ngai nafungwama.” Kazumi andimi sikoyo ete soki okei na lisangá mosusu, “okomona lobɔkɔ ya Yehova na ndenge omoná naino te.” Bongo Jules? Alobi boye: “Baninga oyo nazwi basalisi ngai natika komiyoka kaka ngai moko. Sikoyo, nayokaka ete nazali na esika na lisangá na ngai ya sika mpe ekozala mpasi nalongwa awa.”

a Mpo na koyeba “lolenge ya kolónga mposa ya kozonga na mboka kati na mosala ya Nzambe,” talá lisolo yango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/1994.