Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

3 Esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano

3 Esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano

Lelo oyo, ezali na mikakatano oyo moto akoki te kokima to kosilisa yango. Na ndakisa, soki moto oyo olingaka akufi to ozali na maladi moko oyo ezali kosila te, lokola okoki kobongola makambo te, osengeli kaka koyikela mikakatano yango mpiko. Biblia ekoki kosalisa yo na mikakatano wana ya makasi?

MALADI OYO EZALI KOSILA TE

Rose alobi: “Nazali na maladi moko na makila oyo epesaka ngai mpasi makasi ntango nyonso. Mbala moko, bomoi na ngai ebebaki.” Moko ya makambo oyo ezalaki kotungisa ye mingi ezali ndenge oyo, ntango mosusu, azalaki kokoka te kofandisa makanisi esika moko ntango azali koyekola Biblia mpe kosala makambo mosusu ya losambo. Kasi, maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 19:26 esalisaki ye mingi; elobi: “Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” Rose asosolaki ete ndenge ya koyekola ezali mingi. Lokola na bantango mosusu mpasi oyo azalaki koyoka ezalaki te kopesa ye nzela ya kotánga, akómaki koyoka botángi ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. * Alobi: “Soki bisaleli wana ezalaka te, nayebi te ndenge nini nakokaki kosala mpo na kobatela boninga na ngai na Nzambe.”

Soki Rose ayoki mawa mpo azali kokoka te kosala makambo oyo azalaki kosala liboso, azwaka libɔndisi na maloba oyo ezali na 2 Bakorinti 8:12: “Soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” Maloba wana ekundwelaka Rose ete Nzambe asepelaka na oyo asalaka, mpo asalaka nyonso oyo esengeli na kotalela makoki na ye.

MAWA MAKASI

Delphine, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Nsima ya liwa ya mwana na ngai ya mwasi ya mbula 18, nayokaki mawa makasi mpe nakanisaki te ete nakokoba kozala na bomoi. Makambo nyonso ebongwanaki.” Kasi, azwaki libɔndisi na maloba oyo ezali na Nzembo 94:19, epai mokomi ya nzembo ayebisaki Nzambe: “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.” Alobi: “Nabondelaki Yehova asalisa ngai nayeba makambo ya kosala mpo na kokitisa mawa na ngai.”

Akómaki komipesa mingi na kosalisa basusu. Na nsima, akómaki komimona lokola krɛyo oyo bana basalelaka mpo na kotya langi na liyemi; ata soki ebukani, basalelaka yango kaka. Ndenge moko mpe, atako azalaki na mawa makasi, akokaki kaka kosalisa basusu. Alobi: “Namonaki ete ntango nazalaki kosalela batoli ya Biblia to makanisi oyo euti na Biblia mpo na kobɔndisa bato oyo nayekolaka na bango Biblia, yango ezalaki lolenge oyo Yehova azalaki kolendisa mpe kobɔndisa ngai.” Asalaki liste ya bato oyo Biblia elobeli, oyo bakutanaki na mokakatano oyo epesaki bango mawa makasi. Alobi ete “bato yango nyonso bazalaki na momeseno ya kobondela mingi.” Ayekolaki mpe ete “mpo moto azwa biyano, asengeli kotángaka Biblia.”

Boyekoli ya Biblia esalisaki Delphine azwa liteya mosusu: kotya makanisi na mikolo ezali koya, kasi te na mikolo oyo eleki. Elikya oyo Misala 24:15 elobeli ebɔndisaka ye mingi: “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” Delphine azali mpenza na kondima ete Yehova akosekwisa mwana na ye ya mwasi? Ayanoli: “Na makanisi, namimonaka elongo na mwana na ngai na mikolo ezali koya. Namonaka ntango Yehova akosekwisa ye mokolo oyo ye moko atyá. Namonaka na makanisi ndenge tozali kotambola libándá, kaka ndenge namonaki ye mpe nalingaki ye mokolo abotamaki.”

^ par. 4 Mikanda mingi ya koyoka ezali na jw.org.

Biblia ekoki kosalisa yo ozwa libɔndisi ata ntango okutani na mikakatano ya makasi