Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Yesu azalaki na ntina ya kobenga bato oyo bazalaki kotɛka banyama na tempelo ya Yerusaleme ete “miyibi”?

EVANZILE ya Matai elobi boye: “Yesu akɔtaki na tempelo mpe abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bibonga ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga. Mpe alobaki na bango ete: ‘Ekomamá ete: “Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli,” kasi bino bozali kokómisa yango mobenga ya miyibi.’”Matai 21:12, 13.

Masolo ya kala emonisi ete bato oyo bazalaki kotɛka na tempelo bazalaki konyokola bakiliya na bango na ndenge bazalaki kotya biloko ntalo mingi. Na ndakisa, bibenga ezalaki ntalo moke mpo ata babola bákoka kosomba yango mpo na kopesa mbeka. Kasi, masolo ya Bayuda elobi ete na eleko moko na siɛklɛ ya liboso, bibenga mibale ekómaki na ntalo ya denari moko ya wolo. Ezalaki mbongo ya mikolo soki 25 ya mosala. Bibenga ekómaki ntalo mingi mpenza mpe ekómaki mpasi babola básomba yango. (Balevi 1:14; 5:7; 12:6-8) Simeon ben Gamaliel, moteyi moko ya Lingomba ya Bayuda, asilikaki makasi mpo na likambo yango mpe akitisaki motángo ya mbeka oyo Bayuda basengelaki kopesa. Na mbala moko, ntalo ya bibenga mibale ekitaki tii na mbongo ya denari moko ya wolo kabolá mbala 100.

Ndenge tokoki komona yango, baoyo bazalaki kotɛka na tempelo bazalaki lokoso mpe kolyela bakiliya na bango. Na yango, Yesu azalaki na ntina ya kobenga bango “miyibi.”