Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI

Osalaka mosala koleka ndelo?

Osalaka mosala koleka ndelo?

Omonaka ete makambo ya kosala eleki mingi? Soki ezali bongo, ozali yo moko te. Zulunalo moko (The Economist) elobi: “Na bisika nyonso, emonanaka ete bato bazalaka na makambo mingi ya kosala.”

NA 2015, ankɛtɛ moko esalemaki na bikólo 8 epai ya bato oyo bakendaka mosala mikolo mitano to motoba na pɔsɔ; mingi na bango balobaki ete ezalaka mpasi bákokisa mikumba na bango nyonso, ezala na mosala to na ndako. Ezali bongo mpo makambo ya kosala ekómi mingi, ezala na mosala to na ndako, ekómi kosɛnga mbongo mingi mpo na kobikela, mpe bato bakómi kolekisa bangonga mingi na mosala. Na ndakisa, na États-Unis, bato oyo bakendaka mosala mikolo mitano to motoba na pɔsɔ balobaki ete na pɔsɔ moko balekisaka ngonga soki 47 na mosala. Na bato oyo batunaki, soki tozwi bato 5, moko na bango alobaki ete na pɔsɔ moko alekisaka ngonga 60 to koleka na mosala!

Na ankɛtɛ mosusu oyo esalemaki na bikólo 36, soki tozwi bato 4, moko na bango alobaki ete mbala mingi asalaka makambo mbangumbangu ata na ntango oyo azali na mosala te! Likambo yango ekoki mpe kokómela bana soki bazali kopesa bango misala ebeleebele.

Soki tozali ntango nyonso koluka kosala makambo ebele na ntango moke, tokoki kotungisama na makanisi. Kasi, moto akoki mpenza kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ? Makambo oyo tondimaka, oyo toponaka mpe mikano na biso ezali na ntina nini? Liboso, tótalela bantina minei oyo etindaka moto aluka kosala mosala koleka ndelo.

1 KOLUKA KOKOKISA MALAMU BAMPOSA YA LIBOTA

Tata moko na nkombo Gary alobi boye: “Nazalaki kokende mosala pɔsɔ mobimba, mikolo nyonso nsambo. Nazalaki kosala bongo mpo nazalaki kolinga ete bana na ngai bázalaka ntango nyonso na biloko oyo eleki malamu. Nazalaki kolinga ete bázanga te biloko oyo ngai nazangaki.” Atako baboti balukaka bolamu ya bana na bango, basengeli koyeba makambo oyo esengeli kotya na esika ya liboso. Bato mosusu oyo bayekolaki likambo yango balobi ete baboti to bana oyo bamonaka ete mbongo to biloko ya mokili ezali na ntina mingi, bazalaka mpenza na esengo te na bomoi mpe bazalaka na nzoto malamu te koleka baoyo bakangamaka te na biloko ya mokili.

Bana oyo bakolaka na likanisi ya kotya biloko ya mokili na esika ya liboso bazalaka na esengo te

Lokola baboti mosusu bazalaka na mposa ete bana na bango bázala na bomoi ya malamu ntango bakokola, basalisaka bana na bango misala ebeleebele mpe yango esalaka ete bango nyonso bákóma na makambo ebele ya kosala. Buku moko (Putting Family First) elobi ete baboti oyo basalaka bongo “bapesaka bana na bango mpasi mpe bango moko bamipesaka mpasi.”

2 KOKANISA ETE ‘KOSALA MINGI NDE ELEKI MALAMU’

Bapiblisite elukaka kondimisa biso ete soki tosombi te eloko oyo ebimi sika, tozangi eloko moko ya ntina. Buku moko (The Economist) elobi: “Lokola biloko ya kosomba etondi mpenza, yango esali ete bato bámona ete bazali na ntango mingi te,” mpe basombi “bazali kosala makasi mpo na kopona eloko ya kosomba, ya kotala to ya kolya” na mwa ntango oyo bazali na yango.

Na mobu 1930, moto moko oyo ayekolaki makambo ya nkita, alobaki ete lokola tekinoloji ezali kokola, yango ekosala ete bato oyo bakendaka mosala bákóma na ntango mingi ya kominanola. Nzokande, amikosaki mpenza! Elizabeth Kolbert, oyo asalaka na zulunalo moko (New Yorker) alobi boye: “Na esika ete bato básilisa mosala na ntango oyo ebongi, bazali kaka kokóma na makambo mingi ya kosala,” mpe makambo yango ezali kolya mbongo mpe ntango mingi.

3 KOLUKA KOSEPELISA BATO

Bato mosusu balekisaka bangonga mingi na mosala mpo na kosepelisa bapatrɔ na bango. Baninga ya mosala bakoki kotya moto mbamba mpo amona ete amemi ngambo soki azali kokoba kosala te nsima ya ngonga ya mosala. Mpe lokola kozwa mbongo ekómi mpasi, yango ezali kotinda bato bálekisa bangonga mingi na mosala mpe bándima kosala mosala ntango nyonso oyo babengi bango.

Ndenge moko mpe, baboti bakoki koluka kosala makambo lokola mabota mosusu. Soki basali bongo te, bamonaka ete bamemi ngambo mpo “bazangisi” bana na bango eloko moko ya malamu.

4 KOLUKA LOKUMU MPE KOMONISA ETE TOSALAKA MINGI

Tim, oyo afandaka na États-Unis, alobi boye: “Nazalaki kolinga mosala na ngai, mpe nazalaki kosala mosala makasi ntango nyonso. Nalingaki koluka komonisa ete nasalaka mingi.”

Ndenge moko na Tim, bato mingi bamonaka ete moto azalaka na valɛrɛ mingi soki azali na makambo mingi ya kosala. Yango ebimisi nini? Elizabeth Kolbert, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Kozala na makambo mingi ya kosala ezali kopesa moto lokumu.” Abakisi: “Soki ozali na makambo mingi ya kosala bato bakopesa yo lokumu mingi.”

KOLEKISA NDELO TE

Biblia elendisi biso tósalaka mosala makasi mpe na molende. (Masese 13:4) Kasi esɛngi biso te tólekisa ndelo na mosala. Mosakoli 4:6 elobi: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”

Koboya kolekisa ndelo na mosala esalaka ete moto azala na nzoto malamu mpe makanisi malamu. Moto akoki mpenza kotika kolekisa ndelo na mosala? Ɛɛ. Tótalela makambo minei:

1 YEBÁ MAKAMBO YA KOTYA NA ESIKA YA LIBOSO MPE MIKANO NA YO

Ezali mabe te kolinga kozala na bomoi ya malamu. Kasi mpo na kozala na bomoi ya malamu, esengeli kozala na mbongo boni? Nini ebongisaka bomoi ya moto: mbongo to biloko ya mokili? Nzokande, kolekisa ndelo na kopema to na kominanola ekoki mpe kobakisa mitungisi.

Tim, oyo tolobeli liboso, alobi: “Ngai ná mwasi na ngai totalelaki mpenza bomoi na biso malamumalamu mpe tozwaki ekateli ya kokómisa yango pɛpɛlɛ. Tosalaki liste moko oyo emonisi makambo oyo tosalaka na bomoi na biso mpe mikano oyo tomityeli. Tolobelaki makambo oyo tokutanaki na yango mpo na bikateli tozwaki liboso mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo tókokisa mikano na biso.”

2 KEBÁ NA BISOMBASOMBA

Biblia eyebisi biso tótika te “mposa ya miso” etambwisa biso. (1 Yoane 2:15-17) Bapiblisite ekoki kokolisa mposa yango mpe kotinda bato báluka kolekisa ntango mingi na mosala to kominanola koleka ndelo to oyo esɛngaka mbongo mingi. Ya solo, ekoki kozala mpasi koboya kotala bapiblisite nyonso. Kasi okoki kopona oyo okotala. Okoki mpe koluka koyeba malamumalamu biloko oyo osengeli na yango mpenza.

Kobosana te ete okoki koluka komekola baninga na yo. Soki balingaka konduka biloko ya mokili to bamonaka ete biloko ya mokili nde ebongisaka bomoi, ekozala malamu koluka baninga oyo bazali na mikano oyo eleki malamu. Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

3 YEBÁ NGONGA YA KOSILISA MOSALA

Sololá na patrɔ na yo mpo na mosala mpe yebisá ye makambo mosusu oyo osalaka oyo eleki ntina. Mpe komona te ete omemi ngambo soki ozali na makambo na yo mosusu ya kosala nsima ya mosala. Buku moko (Work to Live) elobi: “Bato oyo basangisaka te makambo ya mosala ná makambo ya ndako to baoyo bazwaka konje na mosala bandimaka likambo oyo: makambo ekokoba kotambola malamu ata soki bazali te.”

Gary, oyo tolobeli liboso, azalaki kozwa mbongo oyo esengeli mpo na kozala na bomoi ya malamu; yango wana azwaki ekateli asalaka lisusu bangonga mingi te. Alobi boye: “Nasololaki na bato ya libota na ngai mpe napesaki likanisi ete tókómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Yango wana, mokemoke, tobandaki na likambo mokomoko. Nasɛngaki mpe patrɔ na ngai soki akondima ete nasalaka mikolo nyonso te, mpe andimaki.”

4 KOLEKISA NTANGO NA LIBOTA NA YO EZALA NA ESIKA YA LIBOSO

Babalani basengeli kolekisaka ntango mingi elongo, mpe bana basengeli kolekisaka ntango mingi elongo na baboti na bango. Yango wana, koluka te komekola lolenge ya bomoi ya mabota mosusu oyo bazalaka kaka na ntango te. Garry alobi boye: “Bombaká mpe mwa ntango mpo na kopema mpe kozwa mopɛpɛ, mpe kokipe te makambo oyo esengeli te kozwa esika ya liboso.”

Ntango bofandi esika moko libota mobimba elongo, bótika te ete televizyo, batelefone, to baaparɛyi mosusu elongola likebi na bino, moko epai ya mosusu. Bólyaka esika moko ata mbala moko na mokolo, mpe bóbɛtaka masolo ntango bozali kolya libota mobimba elongo. Soki baboti balandi toli wana oyo ezali mpasi te, bana na bango bakozala nzoto malamu mpe bakozala mayele na kelasi.

Bóbɛtaka masolo ntango bozali kolya libota mobimba elongo

Mpo na kosukisa, omituna boye: ‘Nalingi mpenza nini mpo na bomoi na ngai? Nalingi nini mpo na libota na ngai?’ Soki olingi bomoi ya esengo mpe oyo ezali mpenza na ntina, mityelá mikano oyo emonisi ete Biblia ezali na nguya mpe etondi na bwanya.