Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mokila ya moselekete babengi margouillat

Mokila ya moselekete babengi margouillat

ATA soki ezali na nse, moselekete yango ezalaka na mokakatano te mpo na komata na efelo. Kasi, soki esika yango ezali mosɛlu, makolo na ye efandaka malamu te, ata bongo elongaka kaka komata na efelo. Ndenge nini? Sekele ezalaka nde na mokila na yango.

Tókanisa naino: Soki moselekete yango elongwe na esika oyo ezali mosɛlu te, ebongamaka naino malamumalamu mpe ekitisaka mokila na yango mpo epumbwa malamu. Kasi na esika ya mosɛlu, ekokaka kosala bongo te mpe epumbwaka malamu te. Nzokande, ntango ezali na mopepe liboso ebakama na efelo, etombolaka mokila na yango likoló mpo epumbwa malamu. Likambo yango ekamwisaka mpenza. Lapolo moko ya Berkeley, iniversite ya Californie elobi boye: “Ntango ezali naino kopumbwa, moselekete ekobaka kobongisa mokila na yango mpo nzoto na yango etikala semba.” Soki esika yango ezali mosɛlu makasi, moselekete yango etombolaka mokila na yango likoló mpenza mpo ebakama malamu na efelo.

Mokila ya margouillat ekoki kosalisa ba-ingénieur basala barobo ya mituka oyo ekoki kotambola mbangu ata na esika nini kozanga mokakatano. Bakoki kosalela mituka yango mpo na koluka bato oyo babiki nsima ya koningana ya mabele to likama moko monene. Thomas Libby, moto moko ya mayele alobi boye: “Barobo ezali te na likoki oyo banyama ezalaka na yango ya kotambola esika nyonso kozanga mokakatano. Na yango, eloko nyonso oyo ekoki kosala ete robo etambola kozanga mokakatano ekomonisa mpenza bokoli.”

Okanisi nini? Mokila ya margouillat ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?