Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Likoki ya komibwaka mpe kokita na nse ya mai ya ndɛkɛ babengi fou de bassan

Likoki ya komibwaka mpe kokita na nse ya mai ya ndɛkɛ babengi fou de bassan

Fou de bassan ezali ndɛkɛ ya monene oyo efandaka pembeni ya mbu, ndɛkɛ yango ezali na likoki ya komibwaka na nse ya mai na vitɛsi ya mɛtrɛ pene na 190. Ntango ndɛkɛ yango emibwakaka na mai ebimisaka nguya koleka mbala 20 nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kobenda biloko. Ndenge nini ndɛkɛ yango ebikaka ntango emibwaki na mai mpe ebandelaka lisusu kosala yango?

Tálela likambo oyo: Liboso ete ndɛkɛ yango emibwaka na mai, etandaka nsala na yango na nzoto na yango mpe ekómaka lokola likulá to flèche. Lisusu ebimisaka mwa mpɔsɔ moko na miso mpo ebatela yango, mpe evimbisaka nkingo ná ntolo na yango lokola balɔ ya mopɛpɛ oyo ebimaka ntango motuka esali aksida mpo ebatela bato.

Ntango nyama yango ezali kozinda na Mbu, monɔkɔ, motó mpe kingo na yango ekómaka nsɔngɛ. Kosala bongo esalisaka ndɛkɛ yango ekómisa misisa na yango ya kingo makasi mpo ezwa likama te ntango ezali kozinda na mai. Mpe liso na yango emonaka malamu na nse ya mai.

Ndɛkɛ yango ezindaka tii na mɛtrɛ boni na nse ya mai? Ndɛkɛ yango ekoki kozinda tii na mɛtrɛ pene na 11 na nse ya mai, kasi ekoki mpe kokoba kokita mwa moke soki ezali kobɛta mapapu na yango mpe kobɛta makolo na yango oyo ezali lokola ya libata. Kutu, emonani ete ndɛkɛ yango mosusu ekoki mpe kokita tii na mɛtrɛ koleka 25 na nse ya mbu. Soki esilisi kozinda emataka libanda ya mbu na pɛtɛɛ nyonso mpe epumbwaka lisusu.

Talá ndenge ndɛkɛ babengi fou de bassan ezali komibwaka na mai

Bato oyo basalaka bolukiluki basalaki robot moko lokola fou de bassan mpo na kosalisa bato na bolukiluki na nse ya mai mpe kobikisa bato. Basalaki ba-robot yango na likoki ya kopumbwa, kozinda na nse ya mai mpe komata likolo. Emonanaki ete robot moko ebukanaki mbala mingi ntango ezalaki kozinda na vitɛsi nyonso na kati ya mai. Yango etindaki bato yango bámona ete ba-robot na bango ezalaki na likoki te ya kozinda malamu na mai ndenge fou de bassan esalaka.

Okanisi nini? Likoki oyo ndɛkɛ babengi fou de bassan ezalaka na yango ya komibwaka mpe kokita na nse ya mai ebimá kaka yango moko? To basalaki yango kosala?