Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makambo oyo Biblia elobi mpo na bomoi ya Yesu ezali solo?

Makambo oyo Biblia elobi mpo na bomoi ya Yesu ezali solo?

Eyano ya Biblia

 Luka, mokomi moko ya Biblia oyo akomaki mpe lisolo ya bomoi ya Yesu, alobaki boye: “Nalandelaki makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli.”​—Luka 1:3.

 Bato mosusu balobaka ete na siɛklɛ ya 4 ya ntango na biso, bato babebisaki masolo ya bomoi ya Yesu oyo ezali na kati ya Baevanzile (mikanda ya bato oyo bazalaki na bomoi na ntango ya Yesu: Matai, Marko, Luka, ná Yoane).

 Nzokande, na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bato bamonaki eteni moko ya Evanzile ya Yoane na Égypte. Lelo, babengaka yango Papyrus Rylands 457 (P52) mpe babombá yango na bibliotɛkɛ ya John Rylands, na Manchester, na Angleterre. Papirisi yango ezali eteni oyo ezali Yoane 18:31-33, 37, 38 na Babiblia ya lelo.

 Yango nde maniskri ya kala mpenza na kati ya bamaniskri ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo ezali lelo. Bato mingi ya mayele balobaka ete ekomamaki soki na mobu 125 ya ntango biso, elingi koloba mbula soki 25 nsima ya mokanda oyo Yoane ye moko akomaki. Makambo oyo ezali na eteni yango ekokani mingi na makambo oyo ezali na bamaniskri oyo bamonaki na nsima.