Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokanda oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli

Mokanda oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli

“Voyez le bon pays” ezali Mokanda oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli oyo ezali na makambo mikemike, mpe okoki kosalela yango mpo na kokɔta na mozindo na boyekoli na yo moko ya Biblia. Biblia elobeli bisika, bingumba, mpe mikili ndenge na ndenge. Kosalela Mokanda oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli ntango ozali kotánga mpe koyekola Biblia ekoki kosalisa yo omona na makanisi ndenge makambo esalemaki.

Mokanda “Voyez le bon pays” ekosalisa yo omona mpe oyeba bisika makambo yango esalemaki. Lisusu ekosalisa yo oyeba mpenza ndenge bisika yango ezalaki na bopusi na masolo oyo Biblia elobeli.

Mokanda “Voyez le bon pays” etondi na bakarte, mpe batablo ya langilangi oyo emonisi bisika ndenge na ndenge ya bitúká oyo Biblia elobeli. Mokanda yango ezali mpe na mayemi, bililingi, mpe makambo mosusu mpo na kokómisa boyekoli na yo kitoko.

Mokanda oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli ekosalisa yo

  • oyeba mobembo oyo Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo basalaki

  • omona na makanisi nzela oyo Bayisraele batambolaki ntango balongwaki na Ezipito mpo na kokende na Mokili ya Ndaka

  • oyeba esika oyo Yisraele ezalaki mpe esika oyo bikólo ya banguna ezalaki

  • omona bamboka epai Yesu asakolaki

  • oyeba bisika to bamboka oyo baampire oyo Biblia elobeli ekómaki, na ndakisa, ampire ya Babilone, ya Grèce mpe ya Roma

Okoki kosalela ofele mokanda yango oyo ezali kolakisa karte ya bisika oyo Biblia elobeli na Internet na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET.