Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”

Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”

“Napesi yo mitindo te? Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”​—Yosua 1:9, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

“Kobosana té, nalobi na yo: zala makasi pe molende. Kobanga té pe kolenga té, po ngai Yawe Nzambe na yo nakozala na yo bisika nyonso okokende.”​—Yosua 1:9, Biblia na lingala ya lelo oyo.

Ndenge Yosua 1:9 elimbolami

 Na maloba wana, Yehova a Nzambe azalaki kokitisa mosaleli na ye ya sembo Yosua motema ete ‘azala na mpiko mpe azala na makasi’ atako akokutana na makambo ya mpasi mpe mikakatano oyo ekomonana lokola akolonga yango te. Yosua asengelaki te kobanga makambo oyo ekoya soki atosi mibeko ya Nzambe, mpo ekozala lokola Yehova azali wana elongo na ye mpo na kosalisa ye alonga. Nzambe azalaki elongo na Yosua na ndenge azalaki kopesa ye mitindo mpe asalaki ete alonga banguna na ye.

 Ndenge nini Yosua akokaki ‘kozala na mpiko mpe kozala na makasi’? Akokaki kozwa mpiko mpe makasi na makomi oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Yehova oyo apesaki bango na ntango wana. Yango esangisaki ‘makambo nyonso ndenge ezali na mobeko oyo Moize, mosaleli ya Yehova, apesaki Yosua mitindo.’ b (Yosua 1:7) Yehova ayebisaki Yosua ‘atángaka yango [‘akanisaka yango,’ Biblia na lingala ya lelo oyo] na mongongo ya nse butu moi.’ (Yosua 1:8) Kotánga mpe kokanisa ya lolenge wana esalaki ete Yosua atya makanisi mpe motema na ye mpo na kosala mokano ya Nzambe. Na nsima, Yosua asengelaki kosalela makambo oyo ayekolaki na Liloba ya Nzambe, mpo ‘akeba ete atosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango.’ Soki asali bongo, akosala makambo na bwanya mpe akolonga. Mpe yango nde esalemaki. Atako akutanaki na mikakatano, Yosua alekisaki bomoi moko ya malamu mpe atondaki na mikolo lokola mosambeli ya sembo ya Yehova.​—Yosua 23:14; 24:15.

 Maloba oyo Yehova ayebisaki Yosua ezali mpe kokoba kolendisa biso lelo oyo. Ezali komonisa ndenge Yehova akipaka basaleli na ye nyonso, mingimingi ntango bakutani na mikakatano. Alingaka bálonga ndenge Yosua alongaki! Mpe lokola Yosua, bakoki ‘kozala na mpiko mpe kozala na makasi’ ntango bazali mbala na mbala kotánga Liloba ya Nzambe, Biblia mpe kokanisa yango na mozindo, mpe na nsima kosala na boyokani na toli yango.

Makambo oyo bazali kolobela na Yosua 1:9

 Na nsima ya liwa ya Moize, Yehova aponaki Yosua mpo akamba ekólo ya Yisraele. (Yosua 1:1, 2) Na ntango yango, Bayisraele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, oyo ezalaki mokili ya Kanana. Kasi banguna oyo bazalaki na nguya batɛmɛlaki bango. Na ndakisa, Yosua asengelaki kobunda na Bakanana oyo bazalaki mpenza bato mabe. c (Kolimbola Mibeko 9:5; 20:17, 18) Bakanana bazalaki ebele mpenza mpe bazalaki na bibundeli ya malamu koleka Bayisraele. (Yosua 9:1, 2; 17:18) Kasi na mpiko nyonso, Yosua alandaki mitindo ya Yehova. Mpe Nzambe amonisaki ete azali elongo na ye, mpamba te Bayisraele balongaki banguna na bango mingi na boumeli ya mbula motoba mpamba.​—Yosua 21:43, 44.

a Nkombo Yehova ezali ndenge babongoli yango na Lingala uta na nkombo ya Nzambe na Ebre ndenge emonisami na balɛtrɛ minei oyo: יהוה (YHWH), balɛtrɛ minei yango babengaka yango Tetragrame. Na Biblia New International Version, nkombo ya Nzambe ebongolami na “NKOLO” na vɛrsɛ yango. Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali Yehova mpe mpo na nini babongoli mosusu basaleli te nkombo na ye na bisaka mosusu, talá lisolo “Yehova azali nani?

b Makomi oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe oyo ezalaki na ntango ya Yosua, ezali kati ya mikanda oyo totángaka lelo oyo na kati ya Biblia, emonani ete ezalaki mikanda mitano oyo Moize akomaki (Ebandeli, Kobima, Balevi, Mitángo, mpe Kolimbola Mibeko), mokanda ya Yobo, mpe mokapo moko to mibale ya mokanda ya Nzembo.

c Mpo na koyeba mpo na nini Bayisraele basengelaki kobunda, talá lisolo “Mpo na nini Nzambe abundisaki Bakanana?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ya 01/01/2010.