Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yisaya 40:31​—“Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika”

Yisaya 40:31​—“Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika”

 “Kasi baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika. Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo. Bakopota mbangu mpe bakosila makasi te; bakotambola mpe bakolɛmba te.”​—Yisaya 40:31, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Nde baoyo bakolambelaka Yawe, bakozua nguya na sika, bakopombwa likolo na mapapu lokola mpɔngɔ, bakopota mbango nde bakolɛmba tɛ, bakotambola nde bakosenzwa tɛ.”​—Yisaya 40:31, Biblia Haut-Fleuve.

Ndenge Yisaya 40:31 elimbolami

 Yehova a Nzambe akitisaka basambeli na ye motema ete akopesa bango makasi oyo basengeli na yango mpo na kolonga to koyika mpiko na mokakatano nyonso oyo bazali kokutana na yango.

 “Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika.” Bato oyo bazali kotyela Yehova elikya, batyaka motema, mpe bandimaka ete Yehova azali na makoki mpe na mposa ya kosalisa bato na ye mpe ya kosunga bango. (Masese 3:5, 6) Nzambe apesaka baoyo basambelaka ye nguya na nzela ya elimo santu, elingi koloba, nguya oyo esalaka mosala.​—Luka 11:13.

 “Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo.” Maloba ya elilingi oyo emonisi makambo oyo nguya ya Nzambe ekoki kosala na kati na biso. Mpo epumbwa, mpongo elandaka mopɛpɛ ya molunge oyo ezali komata likoló. Soki eyoki ete mopɛpɛ yango ezali, mpongo etandaka mapapu na yango mpe ebalukaka na kati ya mopɛpɛ yango mpe emataka se komata. Mpongo epumbwaka mosika kozanga ete ebɛta mapapu, yango esalaka ete ebimisa makasi mingi te. Mpo na kokende na esika mosusu epai mopɛpɛ ya molunge ezali komata likoló, bampongo ekoki kopumbwa ngonga minei mpe elɛmbaka mingi te.

 “Bakopota mbangu mpe bakosila makasi te.” Mikakatano ya bomoi ekoki kolɛmbisa biso na makanisi mpe na nzoto, kasi tokoki koyikela yango mpiko na lisalisi ya nguya oyo Nzambe azali kopesa biso. Nguya yango ekoki kopesa biso makasi ya kosala makambo ya malamu atako tozali kokutana na mikakatano ya makasi. Ntoma Paulo, oyo ayikelaki mikakatano ya makasi mpiko, akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

Makambo oyo bazali kolobela na Yisaya 40:31

 Nzambe atindaki mosakoli Yisaya akoma maloba wana na siɛklɛ ya 8 L.T.B. Atako vɛrsɛ oyo etaleli basaleli na ye nyonso ya sembo, Yehova akomisaki maloba yango mpo na kolendisa Bayuda oyo bazalaki bakangami na Babilone na boumeli ya mbula 70. Ntango Bayuda bazongaki na mboka na bango, bamonaki ndenge maloba ya Nzambe ekokisamaki. (Yisaya 40:1-3) Nzambe apesaki bango nguya ya kosala mobembo b wana ya molai mpe ya mpasi banda na Babilone tii na Yerusaleme na mobu 537 L.T.B.​—Yisaya 40:29.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

b Bakangami basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 1 600.