Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Kotya mpe kosalela ba marque-pages​—Android

Kotya mpe kosalela ba marque-pages​—Android

Ba Marque-pages oyo etyami na JW Library ezali mpo na kosalisa yo obatela esika moko oyo otángaki na mokanda, kaka ndenge okoki kosala yango na mokanda ya papye. Mokanda nyonso oyo ezali na JW Library ezali na ba Marque-pages 10.

Landá makambo oyo mpo oyeba kosalela ba Marque-pages:

 Kotya elembo na mokanda

Okoki kotya elembo na lisolo to mokapo, to mpe na paragrafe moko to vɛrsɛ moko.

Mpo na kotya elembo na lisolo to na mokapo, bɛtá na elembo ya Marque-page. Soki efungwami, ekobimisa ba marque-pages mpo na mokanda oyo ozali kotánga. Bɛtá na esika oyo makomi ezali te mpo na kobatela lisolo to mokapo oyo ozali kotánga.

Mpo na kobatela paragrafe to vɛrsɛ ya Biblia, bɛtá liboso na makomi, na nsima bɛtá elembo ya Marque-page na bilembo oyo ebimi wana.

 Komona elembo otyaki

Mpo na komona likambo oyo obatelaki, fungolá mokanda oyo otyaki bilembo; na nsima, bɛtá elembo ya Marque-page. Bɛtá elembo na esika oyo olingi komona.

 Kotya to kolongola elembo na mokanda

Soki otyaki bilembo na mokanda, okoki kolongola yango to kotya mosusu.

Mpo na kolongola, bɛtá elembo ya Marque-page; na nsima bɛtá na madodo misato oyo ezali pene ya oyo olingi koboma. Bɛtá Supprimer.

Mpo na kotya elembo mosusu, bɛtá elembo ya Marque-page; na nsima bɛtá Madodo oyo ezali na esika oyo olingi kotya mosusu. Bɛtá Remplacer. Wana, otye lisolo ya sika. Ekosalisa yo oyeba esika osukaki na mokanda moko oyo ozali kotánga. Na ndakisa, okoki kobatela esika osuki na botángi na yo ya Biblia ya mokolo.

Makambo yango ebimaki na sanza ya minei na 2014 na JW Library 1.2, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.