Batatoli ya Yehova na mokili mobimba

South Africa

  • Stellenbosch, na Afrique du Sud: Batatoli bazali koteya moto na elanga ya vinyo moko libándá ya engumba Cape Town

  • Kartye Bo-Kaap, na engumba Cape Town, na Afrique du Sud: Batatoli bazali koteya moto na kartye yango

  • Weltevrede, na etúká ya Mpumalanga, na Afrique du Sud: Batatoli bazali kobengisa mwasi moko Ndebele na makita na Ndako ya Bokonzi

Mitángo mpo na South Africa

  • Ezali na bato 60 605 000
  • Bato oyo bateyaka Biblia bazali 100 331
  • Masangá ezali 1 966
  • Motatoli ya Yehova 1 mpo na bato 617 habitants

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI

Nalekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova

Lisolo ya bomoi: John Kikot

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Shɛni ya Satelite ya JW ekómi ata na bisika oyo Internet ezalaka te

Na Afrika, ndenge nini bandeko batalaka TV JW soki bazali na Internet te?

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Johny ná Gideone: Tozalaki banguna, tokómi bandeko

Na bisika mosusu, bato bamonaka ete koyina moto mpo na loposo na ye ezali na yango mabe. Talá ndenge mibali mibale balongaki likambo yango.