Batatoli ya Yehova na mokili mobimba

Mexico

  • Esika babengi Palacio de Bellas Artes, na engumba Mexico, na Mexique: Batatoli bazali koteya bato Biblia

  • Engumba Betania, na etúká Chiapas, na Mexique: Batatoli bazali kolakisa moto mwa buku oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Tzotzil

  • Engumba San Miguel de Allende, etúká ya Guanajuato, na Mexique: Batatoli bazali kolendisa moto na vɛrsɛ moko ya Biblia

Mitángo mpo na Mexico

  • Ezali na bato 132 834 000
  • Bato oyo bateyaka Biblia bazali 864 738
  • Masangá ezali 12 706
  • Motatoli ya Yehova 1 mpo na bato 155 habitants

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI

“Tokosala liyangani mosusu mokolo nini?”

Mpo na nini liyangani moko oyo ezalaki na bato moke na engumba Mexico, na 1932, ekendaki nsango?

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Mexique

Tangá ndenge oyo bilenge mingi balongaki mikakatano ya bomoi ya minɔndɔ mpo na koluka mabaku ya kosakola mingi.