Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kosalisa bato oyo bakufá matoi na “émeraude ya Équateur”

Kosalisa bato oyo bakufá matoi na “émeraude ya Équateur”

Indonésie, oyo babengaka yango mpe “émeraude ya Équateur” ezali na bamilio ya bato oyo bakufá matoi mpe oyo bayokaka malamu te. Mpo na kosalisa bango, Batatoli ya Yehova babimisaka mikanda ndenge na ndenge oyo elimbolaka Biblia na elobeli ya bajɛstɛ ya Indonésie. Bazalaka mpe na baprogramɛ ya kolakisa bato elobeli yango. Bato bazali kosepela na milende na bango.

Liyangani moko na elobeli ya bajɛstɛ

Na 2016, na Medan (etúká ya Sumatra ya nɔrdi), Batatoli ya Yehova babongisaki liyangani moko na elobeli ya bajɛstɛ ya Indonésie. Mokonzi moko ya Leta ya etúká yango oyo atalaka makambo etali kobatela etúká yango, ayaki na liyangani yango mpo na kotala soki makambo ezalaki koleka na kimya. Apesaki Batatoli ya Yehova longonya mpo na programɛ ya mateya ya ofele oyo babongisaka. Makambo oyo amonaki esimbaki mpenza motema na ye, na boye ete amekaki kutu koyemba na elobeli ya bajɛstɛ ndenge bayangani bazalaki koyemba.

Moto oyo akɛngɛlaka esika yango alobaki boye: “Likama moko esalami te. Makambo nyonso eleki malamu mpenza. Nakanisi ete Batatoli ya Yehova bakokoba kobongisa mayangani ya boye mpo na bato oyo bakufá matoi.” Abakisaki ete ntango nkolo esika yango ayokaki ete liyangani yango ebongisamaki mpo na bato bakufá matoi, asepelaki kosala likambo moko mpo na Batatoli ya Yehova: Alobaki bápesa moyangani mokomoko biloko ya kolya; nzokande bayangani nyonso bazalaki bato 300.

Bɔtɔndi mpo na bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ

Batatoli ya Yehova bakendaka mpe epai ya bato oyo bakufá matoi mpo na koteya bango nsango malamu ya Biblia. Mbala mingi Batatoli ya Yehova balakisaka bango bavideo na elobeli ya bajɛstɛ ya Indonésie, oyo ebongisami mpo na kosalisa bato bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.

Mahendra Teguh Priswanto, mokambi-molandi ya etuluku moko oyo esalisaka bato oyo bakufá matoi na Indonésie, na etúká ya Semarang (etúká ya Java Central) alobaki boye: “Bobongi mpenza na longonya mpo na oyo bozali kosala mpo na kokokisa bamposa ya bato oyo bakufá matoi. Na ndakisa, video Okoki kozala na libota ya esengo ezali kosalisa mpenza. Tokosepela soki bokobi na mosala na bino.”

“Balingaka biso”

Milende ya Batatoli ya Yehova esimbaki motema ya mwasi moko oyo akufá matoi na nkombo Yanti; alobi: “Mbala mingi bato basɛkaka bato oyo bakufá matoi, kasi Batatoli ya Yehova balingaka biso. Mingi na bango bayekolá elobeli ya bajɛstɛ atako balobaka kaka mpo básalisa bato oyo bakufá matoi báyeba Mozalisi mpe bázala na bomoi ya malamu koleka. Milende na bango esimbaki mpenza motema na ngai.”

Yanti akómá Motatoli ya Yehova mpe lelo asalaka na ekipi moko oyo ebongolaka bavideo na elobeli ya bajɛstɛ ya Indonésie. Alobi boye: “Mikanda oyo tobimisaka esalisaka bato oyo bazali koyekola elobeli ya bajɛstɛ báyeba yango malamu, kasi emonisaka mingimingi ndenge ya kozala na bomoi ya esengo.”