Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kosakwela Ba-Sinti ná Ba-Roms na Allemagne

Kosakwela Ba-Sinti ná Ba-Roms na Allemagne

Ba-Sinti ná Ba-Roms mingi bafandaka na Allemagne. * Mikolo oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova babimisaki batrakte, mwa mikanda mpe bavideo na Romani, * monɔkɔ na bango ya mboka.

Na kampanye moko ya sipesiale oyo Batatoli ya Yehova basalaki na sanza ya libwa mpe ya zomi na 2016, basalaki makasi básakwela Ba-Sinti ná Ba-Roms oyo bafandi na bingumba mingi ya Allemagne, na monɔkɔ ya Romani; basakolaki na bingumba lokola Berlin, Bremerhaven, Fribourg, Hambourg mpe Heidlberg. Babongisaki mpe makita na Bandako na bango ya Bokonzi na monɔkɔ ya Romani.

Basepelaki mingi mpenza!

Ba-Sinti ná Ba-Roms mingi basepelaki na kampanye oyo Batatoli ya Yehova basalaki mpe bakamwaki. Andre ná Esther, mwasi ná mobali oyo bapesaki mabɔkɔ na kampanye yango, balobaki boye: “Bato yango basepelaki mpenza mpo na milende oyo tosalaki ya kosakwela bango.” Koyoka mpe kotánga nsango ya Biblia na monɔkɔ na bango ya mboka esimbaki mitema ya bato mingi. Elenge mwasi moko atalaki video Mpo na nini koyekola Biblia? na monɔkɔ ya Romani mpe akamwaki; alobaki mbala na mbala, “Oyo monɔkɔ ya mboka na ngai!”

Motatoli ya Yehova moko na nkombo Matthias, oyo apesaki kampanye yango mabɔkɔ na Hambourg, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozalaki na etuluku ya Batatoli ya Yehova mwambe oyo bakendaki esika oyo Ba-Sinti ná Ba-Roms 400 bafandaka. Moto nyonso oyo tosololaki na ye asɛngaki biso mikanda.” Bettina, oyo asakolaki mpe na Hambourg, abakisi boye: “Bamosusu balelaki ntango bamonaki ete Batatoli ya Yehova babimisi mikanda na monɔkɔ ya Romani.” Mingi babandaki mbala moko kotánga mikanda yango na mongongo makasi mpe bamosusu bazwaki mikanda mosusu mpo na kopesa baninga na bango.

Ba-Sinti ná Ba-Roms mosusu bandimaki libyangi ya koya na moko ya makita na biso. Mingi ya bato 94 oyo bayanganaki na makita na Hambourg ezalaki mpo na mbala ya liboso. Na Reilingen, pene na Heidelberg, bato 123 bayanganaki na makita. Na nsima, bato mitano oyo balobaka monɔkɔ ya Romani basɛngaki boyekoli ya Biblia.

Na kampanye yango, Batatoli ya Yehova bakabolaki batrakte mpe mwa babuku soki 3000. Basololaki na Ba-Sinti mpe Ba-Roms koleka 360 mpe bayekolaki na bato 19 Biblia. Mingi ya bato yango balobaki: “Ezali malamu mpenza ndenge Nzambe atandeli biso lobɔkɔ na ye.”

^ par. 2 Balobaka ete Ba-Sinti bazali bato moke oyo bafandaka na wɛsti mpe na Europe Centrale mpe Ba-Roms bazali bato moke oyo bautá na ɛsti mpe sudi ya Europe.

^ par. 2 Buku Encyclopædia Britannica na Iternet elobi ete Romani esangisi “minɔkɔ ya mboka 60 oyo ekeseni, ata mpe koleka.” Mpo tóbenda mindɔndɔ te, na lisolo oyo, tosaleli liloba “Romani” mpo na kolobela monɔkɔ oyo Ba-Sinti ná Ba-Roms oyo bafandaka na Allemagne balobaka.