Lakisá makambo oyo ezali na kati

Engumba ya motuya elakisi “bato likabo ya Nzambe”

Engumba ya motuya elakisi “bato likabo ya Nzambe”

Cluj-Napoca, moko ya bingumba minene ya Roumanie, eyebani na nkombo “engumba ya motuya”. Na fware moko ya Gaudeamus mpo na kolakisa babuku oyo basalaki, kobanda na mokolo ya 20 tii ya 24/04/2016, Batatoli ya Yehova batyaki na esika ya liboso bizaleli kitoko mpe makambo ya Nzambe oyo ezali na Biblia. Batyaki mesa moko ya mikanda mpe basololaki na bato mingi oyo bayaki kosala vizite na fware yango; bato yango basepelaki na bavideo, mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe Babiblia oyo batandaki na mesa yango.

Biteyelo mingi eyaki na fware yango mpe balakisi bamemaki bana-kelasi na mesa ya Batatoli ya Yehova. Bana-kelasi basepelaki mingi na bavideo Kómá moninga ya Yehova, mpe mingi na bango bazalaki na mposa ya kozwa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe mwa buku Teyá bana na yo. Molakisi moko ya eteyelo ya Maternelle oyo amonaki bavideo yango ayebisaki moninga na ye boye: “Ebongi tókoma adrɛsi ya site oyo [www.pr418.com] mpo tolakisaka bana bavideo ya Kalebe.”

Bana-kelasi ya bilenge basepelaki mingi na bavideo Moto azali koyema oyo balakisaki na batablɛti. Batalaki bavideo lokola Ezali bolingo to bilingelá?, Kebá na basite Internet ya kosolola na baninga? mpe Longá matumoli kozanga ete obunda.

Sango moko ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ná mwasi na ye bayaki na mesa yango mbala mingi, bazwaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpe mwa babuku mosusu. Sango yango alobaki ete akamwaki na “Index ya maloba ya Biblia” oyo ezali na Biblia yango mpe mikanda mingi ya kotyela motema oyo babongoli basalelaki. Apesaki Batatoli ya Yehova nimero ya telefone na ye mpe alobaki bákende kotala ye na ndako mpo básolola na ye Biblia na mozindo.

Mwasi ya sango yango asɛngaki báyebisa ye esika oyo akozwa bansango etali bana na site jw.org mpe balakisaki ye eteni “bana” na site yango. Na nsima atalaki video Lobáká solo, mpe asepelaki na yango mingi. Nsima ya kotala yango mpe makambo mosusu oyo ezali na site yango, mobali na ye abengaki yango “Likabo Nzambe apesi bato.”