Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka siansi?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka siansi?

 Tozalaka na limemya na makambo oyo siansi esalaka mpe tondimaka makambo oyo siansi ebimisaka soki ezali na makambo oyo endimisi yango.

 Diksionɛrɛ moko (Collins Cobuild Advanced Learner’s English Dictionary) elobi boye: “Siansi ezali boyekoli ya biloko oyo ezalaka na likoló to na mabele mpe boyebi oyo tozwaka na boyekoli yango.” Atako Biblia ezali buku ya siansi te, elendisaka bato báyekola biloko oyo Nzambe akelá mpe bázwa matomba na makambo mosusu oyo bato ya siansi babimisaka. Tótalela mwa bandakisa oyo:

  •   Astronomi: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo.”​—Yisaya 40:26.

  •   Bioloji: Salomo “azalaki kolobela banzete, banda na sɛdrɛ oyo ezali na Libá tii na nzete ya izope oyo ebimaka na efelo; mpe azalaki kolobela banyama mpe bikelamu oyo epumbwaka mpe biloko oyo etambolaka mpe mbisi.”​—1 Bakonzi 4:33.

  •   Minganga: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde baoyo bazali kobɛla.”​—Luka 5:31.

  •   Meteo: “Okɔtá nde na bandako ya kobomba nɛjɛ, to omonaka ata bandako ya matandala, . . . ? Wapi, sikoyo, nzela epai . . . mopɛpɛ ya ɛsti epanzanaka na mabele?”​—Yobo 38:22-24.

 Mikanda na biso emonisaka ete tozalaka na limemya na siansi mpo ezalaka na masolo oyo elobelaka biloko oyo Nzambe akelá mpe makambo oyo siansi esalaka. Baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova balendisaka bana na bango bátánga kelasi mpo báyeba malamu biloko oyo ezali na mokili. Batatoli ya Yehova mosusu bayekolaka makambo ya siansi; na ndakisa bioloji, matematiki mpe fiziki.

Siansi ezali na ndelo

 Tondimaka te ete siansi ekoki kopesa biyano na mituna nyonso oyo bato batunaka. a Na ndakisa bato ya geoloji balukaka koyeba soki mabele esalemá na biloko nini mpe bato ya bioloji bayekolaka ndenge nzoto ya moto ezalaka. Kasi mpo na nini mabele ebongisamá malamumalamu mpenza mpo bomoi ezala mpe mpo na nini biteni ya nzoto esalaka mpenza na boyokani?

 Tomoni ete kaka Biblia nde epesi biyano oyo ebongi na mituna yango. (Nzembo 139:13-16; Yisaya 45:18) Yango wana, tondimi ete mpo moto azwa formasyo ya malamu, esɛngi ayekola siansi ná Biblia.

 Na bantango mosusu emonanaka lokola siansi eyokanaka te na Biblia. Emonanaka bongo soki bato bakangi ntina te ya makambo mosusu oyo Biblia eteyaka. Na ndakisa, Biblia eteyaka te ete Nzambe akelaki mabele na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24.​—Ebandeli 1:1; 2:4.

 Makanisi mosusu oyo bato mingi bamonaka ete ezali ya siansi, ezalaka mpenza te na makambo oyo endimisi yango mpe bato minene mosusu ya siansi baboyaka yango. Na ndakisa, lokola biloko oyo ezali na mokili emonisaka ete moto moko ya mayele mpenza nde akelá yango, tondimaka makanisi ya bato mingi ya bioloji, chimie mpe bato mosusu oyo bamoni ete evolisyo te nde ebimisá bikelamu ya bomoi na nzela ya mbongwana ya mbalakaka mpe komesana na esika.

a Erwin Schrödinger, moto moko ya fiziki na Autriche oyo azwaki mbano babengi prix Nobel akomaki ete siansi “ekangaka monɔkɔ na makambo nyonso . . . oyo tozalaka mpenza na mposa na yango, oyo ezalaka na ntina mpenza mpo na biso.” Albert Einstein mpe alobaki: “Makambo ya mpasi oyo tokutanaki na yango eteyaki biso ete mayele ya moto ekoki te mpo na kosilisa mikakatano ya bomoi ya bato.”