Lakisá makambo oyo ezali na kati

05/03/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Lapolo ya Komite ya bakambi 2019: Kosunga bandeko na ntango ya makama

Lapolo ya Komite ya bakambi 2019: Kosunga bandeko na ntango ya makama

Lapolo ya Komite ya bakambi ya 2019 ezalaki na motó ya likambo Kosunga bandeko na ntango ya makama, lapolo yango emonisaki ndenge ebongiseli na biso ezali kosalisa bandeko ntango bakutani na makama. Elobelaki mpe ndenge bandeko na biso basalaki ntango koningana ya mabele mpe mopɛpɛ makasi ebɛtaki na Indonesie, mpe lisusu ntango maladi mabe ya fièvre jaune ebimaki na Nigeria. Lokola maladi mabe oyo bazali kobenga coronavirus (to COVID-19) ezali kotungisa bato, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekokoba kopesa malako epai ya bandeko na biso na bisika oyo maladi yango ezali.