Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni endimisi mpenza ete Mokonzi Davidi azalaki na bomoi

Biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni endimisi mpenza ete Mokonzi Davidi azalaki na bomoi

 Biblia elobi ete Mokonzi ya Yisraele, Davidi azalaki na bomoi na siɛklɛ ya 11 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe bana na ye bayangelaki bambula ebele mpenza. Kasi bato mosusu balobaka ete lisolo ya Davidi ezali lisapo mpamba, lisolo oyo bato bango moko basalaki na nsima. Davidi azalaki mpenza moto ya solo?

 Na 1993, moto moko ya arkeoloji, Avraham Biran ná bato na ye bakundolaki eteni ya libanga moko na Tel Dan, na nɔrdi ya Yisraele, bakomaki likoló na yango “Ndako ya Davidi.” Makambo yango ekomamaki na monɔkɔ ya ba Semite (Moyen-orient) ya kala ya siɛklɛ ya 9 L.T.B. Eteni ya libanga yango ezalaki na monima oyo ba Araméens batongaki, mpo na komonisa ndenge oyo balongaki Bayisraele.

 Buku moko (Bible History Daily) elobi ete bato mingi bandimaka te ete makomi wana ‘Ndako ya Davidi’ emonisi ete Davidi azalaki mpenza na bomoi. Kasi, bato ya mayele na makambo ya Biblia mpe bato ya arkeoloji bandimaka ete biloko oyo ezwamaki na Tel Dan emonisi ete Mokonzi Davidi, oyo Biblia elobeli, azalaki mpenza na bomoi. Zulunalo BAR [Biblical Archaeology Review] ekomaki ete Libanga yango ezali na kati ya biloko ya ntina oyo bato ya arkeoloji bakundolaki.