Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: NZAMBE AZALI MOTEMA MABE?

Mpo na nini bato balobaka ete Nzambe azali motema mabe?

Mpo na nini bato balobaka ete Nzambe azali motema mabe?

MOTUNA oyo ezali na ezipeli ya zulunalo oyo epesi yo mpasi na motema? Bamosusu bakoloba ɛɛ, kasi bato mingi lelo bamitunaka soki Nzambe azali motema mabe; basusu mpe balobaka ete azali bongo. Mpo na nini?

Bato mosusu oyo babikaka na makama minene bamitunaka boye: “Mpo na nini Nzambe atikaka makambo ya ndenge wana esalema? Azalaka mafumafu? To azalaka nde motema mabe?”

Bamosusu mpe bamitungisaka ndenge wana ntango batángaka masolo ya Biblia; na ndakisa oyo elobeli Mpela ya ntango ya Noa; mpe yango etindaka bango bámituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe ya bolingo abomaki bato wana nyonso? Azalaka nde motema mabe?’

Yo mpe omitunaka ndenge wana? To omonaka ete okokoka te kopesa biyano na baoyo bamitunaka soki Nzambe azali motema mabe? Ezala bongo to te, tótalela naino motuna mosusu oyo ekoki kosalisa biso.

MPO NA NINI TOYINAKA MABE?

Na mokuse, ezali mpo toyebaka kokesenisa mabe ná malamu. Yango ekesenisaka biso mpenza na banyama. Mozalisi na biso asalá biso na “elilingi na ye.” (Ebandeli 1:27) Yango elakisi nini? Apesá biso likoki ya komonisa bizaleli na ye, kotosa mibeko na ye, mpe kokesenisa mabe ná malamu. Tókanisa naino: Lokola Nzambe apesá biso likoki ya kokesenisa mabe ná malamu mpe ya koyina makambo ya mabe, yango emonisi te ete Nzambe mpe ayinaka yango?

Biblia endimi mpenza likanisi yango, mpo Nzambe alobi na biso boye na Biblia: “Banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.” (Yisaya 55:9) Soki tolobi ete Nzambe azali motema mabe, yango ekomonisa te ete oyo Biblia elobi ezali lokuta? Kutu, koloba bongo ekomonisa te ete banzela na biso eleki oyo ya Nzambe na mosika? Na ntembe te, ekozala malamu kotalela makambo mingi liboso ya koloba bongo. Mbala mosusu ebongi te tómituna soki Nzambe azali motema mabe, kasi nde mpo na nini makambo mosusu oyo asalaka emonanaka lokola mabe. Mpo tókanga ntina, tótalela naino soki “kozala motema mabe” elimboli mpenza nini.

Soki tolobi ete moto moko azali motema mabe, yango emonisaka ete makanisi na ye ezali mabe. Moto yango asepelaka komona basusu bazali konyokwama to mpe akipaka mpasi na bango te. Boye, tata oyo apesaka mwana na ye disiplini kaka mpo na koyokisa ye mpasi na motema, azali motema mabe. Kasi, tata oyo apesaka mwana na ye disiplini mpo na koteya to kobatela ye, azali tata malamu. Lokola toyebaka ntango nyonso te likambo oyo etindaka basusu básala likambo boye to boye, yango wana ezalaka mpasi te tókanisela bango mabe.

Tótalela naino ntina mibale oyo etindaka bato bákanisa ete Nzambe azali motema mabe​—makama minene lokola mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele oyo tomonaka lelo mpe bitumbu oyo Nzambe apesaki bato na ntango ya kala. Makambo yango emonisaka mpenza ete Nzambe azali motema mabe?