Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Etanda ya mabele oyo ezali na nkombo ya Beleshazare (Na monene na yango)

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni endimisi ete Beleshazare azalaki mokonzi na Babilone?

NA BOUMELI ya bambula mingi, bato oyo batyolaka Biblia bazalaki koloba ete Mokonzi Beleshazare, oyo mokanda ya Danyele elobeli, azalaki na bomoi te. (Dan. 5:1) Bazalaki kokanisa bongo mpo bato ya arkeoloji bakundolaki ata eloko moko te oyo emonisaki ete azalaki na bomoi. Kasi, na 1854, makambo ebongwanaki. Mpo na nini?

Na mbula yango, ambasadɛrɛ moko ya Angleterre na nkombo John George Taylor alukalukaki na bitiká mosusu ya engumba Ure ya kala, oyo ezali lelo sudi ya Irak. Kuna, amonaki bitanda ebele ya mabele na linɔ́ngi moko ya molai. Bitanda yango, oyo mokomoko ezalaki molai ya santimɛtrɛ 10 ezalaki na makomi ya cunéiforme. Makomi oyo ezalaki na moko ya bitanda yango ezali libondeli mpo na kosɛnga bomoi molai mpo na Nabonide, Mokonzi ya Babilone, mpe Beleshazare, mwana na ye ya mobali ya mokóló. Ata bato oyo batyolaka Biblia bandimaki ete bitanda yango emonisaki ete Beleshazare azalaki solo na bomoi.

Kasi, Biblia esuki kaka te na koloba ete Beleshazare azalaki na bomoi, elobi mpe ete azalaki mokonzi. Na likambo yango mpe, bazalaki kotya ntembe. Na ndakisa, na mobu soki 1875, moto moko ya siansi na nkombo William Talbot akomaki ete bato mosusu balobaka ete “Bel-sar-ussur [Beleshazare] azalaki mokonzi na eleko moko ná Nabonide tata na ye. Kasi ezali ata na elembeteli ya moke te oyo endimisi likambo yango.”

Kasi, ntembe yango esilaki ntango makomi oyo ezalaki na bitanda mosusu ya mabele emonisaki ete na eleko moko boye, Mokonzi Nabonide, tata ya Beleshazare, azalaki te na engumba-mokonzi bambula mingi. Nini esalemaki na ntango yango? Buku moko (Encyclopaedia Britannica) elobi boye: “Ntango Nabonide akendaki kofanda na mboka mopaya, atikelaki Beleshazare kiti ya bokonzi mpe eteni monene ya limpinga na ye ya basoda.” Na yango, Beleshazare azalaki mpe mokonzi ya Babilone na ntango yango. Yango wana, Alan Millard, moto moko ya mayele na arkeoloji mpe na makambo etali minɔkɔ, alobaki ete ebongaki “mokanda ya Danyele ebenga Beleshazare ‘mokonzi.’”

Kasi, mpo na basaleli ya Nzambe, elembeteli monene oyo emonisi ete mokanda ya Danyele ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ezali na kati ya Biblia yango moko.​—2 Tim. 3:16.