Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA​—NDENGE OYO EBATELAMAKI

Biblia ezali tii lelo atako batɛmɛlaki yango

Biblia ezali tii lelo atako batɛmɛlaki yango

LIKAMA: Bakonzi mingi ya mangomba mpe ya politiki batɛmɛlaki mateya ya Biblia. Mbala mingi, basalelaki bokonzi na bango mpo na kopekisa bato bázala na Biblia, bábimisa yango to bábongola yango. Tótalela ndakisa mibale oyo:

  • Na mobu soki 167 liboso ya ntango na biso, Mokonzi Antiochus Épiphane, oyo alukaki Bayuda bakóma bandimi ya lingomba ya bagrɛki na makasi, apesaki mitindo bábebisa bakopi nyonso ya Makomami ya Ebre. Heinrich Graetz, moto ya istware akomaki ete basaleli ya mokonzi “bapasolaki mpe batumbaki barulo ya mobeko bisika nyonso oyo bakutaki yango mpe babomaki baoyo bazalaki kotánga yango mpo na kozwa libɔndisi mpe makasi.”

  • Moyen Âge: Bakonzi mosusu ya Katolike bazalaki kosepela te moto ateya mateya ya Biblia, kasi kaka mateya ya Katolike. Moto asengelaki kozala kaka na mokanda ya Nzembo na Latin, soki azali na mikanda mosusu ya Biblia bazalaki kobenga ye mopɛngwi. Likita moko ya eglize eyeisaki likambo yango ndongo ndenge epesaki mitindo ete bato na bango “bákende mbala na mbala koluka bapɛngwi . . . na bandako nyonso mpe bashambre ya nse ya mabele epai bakanisi ete moto moko akoki kozala na mikanda ya Biblia. . . . Ndako nyonso oyo bakokuta mopɛngwi, esengelaki kobebisama.”

Soki banguna ya Biblia balongaki kobebisa yango, nsango na yango elingaki kolimwa.

Libongoli ya Biblia ya William Tyndale na Lingelisi ebatelamaki atako bapekisaki yango, batumbaki yango mpe babomaki Tyndale na mobu 1536

NDENGE OYO BIBLIA EBATELAMAKI: Mokano oyo Mokonzi Antiochus azwelaki Bayuda na Yisraele esukaki na nzela mpo Bayuda bakendaki kofanda na mikili mosusu. Kutu, bato ya mayele bamoni ete na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Bayuda mingi (60 %) bakómaki kofanda na bikólo mosusu. Bayuda babombaki bakopi ya Makomami na basinagoga na bango; bana ya bana na bango basalelaki bakopi yango na nsima ata mpe bakristo.​—Misala 15:21.

Na Moyen Áge, bato oyo balingaki Biblia babangaki minyoko te mpe bakobaki kobongola mpe kosala bakopi ya Makomami. Kutu liboso bato bábimisa masini ya konyata mikanda na katikati ya siɛklɛ ya 15, mwa ndambo ya mikanda ya Biblia ezalaki na minɔkɔ soki 33. Na nsima, Biblia ebongolamaki mpe ebimisamaki mingi mpenza.

NA NSUKA: Atako bakonzi ya nguya mpe bakonzi ya mangomba ya motema mabe batɛmɛlaki Biblia, kasi Biblia ezali buku oyo ebongolami mpe ekabolami koleka babuku nyonso. Mateya na yango ekɔtá na mibeko mpe minɔkɔ ya bato ya bikólo mosusu, esalisá mpe bamilio ya bato.