Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Toyekolaka koyeba Nzambe na nzela ya basakoli na ye

Toyekolaka koyeba Nzambe na nzela ya basakoli na ye

Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kosalela basakoli mpo na koyebisa bato bansango na ye. Bansango yango emonisi oyo tokoki kosala mpo Nzambe apambola biso. Tólobela mateya oyo tokoki kozwa epai ya basakoli misato ya sembo.

ABRAHAMA

Nzambe aponaka bilongi te mpe alingaka kopambola bato nyonso.

Nzambe alobaki na Abrahama ete “mabota nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli na nzela na yo.”​—Ebandeli 12:3.

Eteyi biso nini? Nzambe alingaka biso mingi mpe alingaka kopambola bato nyonso oyo batosaka ye, ezala mibali, basi mpe bana.

MOIZE

Nzambe azalaka na motema mawa mpe apambolaka baoyo balukaka koyeba ye.

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesaki Moize nguya ya kosala makamwisi. Moize abondelaki boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, mpo nayeba yo, mpo nandimama na miso na yo.” (Kobima 33:13) Nzambe andimaki libondeli ya Moize mpe apambolaki ye na ndenge apesaki ye mayele mingi mpe asalisaki Moize ayeba banzela na ye mpe bizaleli na ye. Na ndakisa, Moize ayekolaki ete Nzambe oyo asalá biso azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu.”​—Kobima 34:6, 7.

Eteyi biso nini? Nzambe apambolaka bato nyonso oyo balukaka koyeba ye malamu, ezala mibali, basi mpe bana. Na Makomami Mosantu, Nzambe alakisi biso ndenge malamu ya kosambela ye mpe ete azali na mposa makasi ya kopambola biso.

YESU

Yesu azalaki na motema mawa, yango wana azalaki kobikisa bamaladi ya ndenge nyonso

Tokoki kozwa mapamboli ya seko oyo Nzambe alaki, soki toyekoli makambo oyo Yesu asalaki mpe ateyaki.

Makomami Mosantu elobeli makambo mingi oyo Yesu asalaki mpe ateyaki. Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi, na ndakisa abikisaki bato oyo bakufá miso, oyo bakufá matoi mpe bibɔsɔnɔ. Kutu, azongisaki bato oyo bakufá na bomoi. Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisaki mapamboli oyo Nzambe akopesa bato na mikolo ezali koya. Yesu alobaki oyo mokomoko na biso asengeli kosala mpo na kozwa mapamboli yango: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Yesu azalaki na bolingo, na motema mawa, mpe na boboto. Kutu, basi mpe mibali, bilenge mpe mibange, bazalaki koya epai na ye mpo alobaki ete: “Bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.” (Matai 11:29) Bato mosusu na ntango ya Yesu bazalaki konyokola basi, kasi Yesu azalaki kosalela basi makambo na boboto, azalaki kopesa bango lokumu mpe limemya.

Eteyi biso nini? Yesu azalaki kolinga bato mingi mpe alakisi biso ndenge oyo tosengeli kosalela basusu makambo.

YESU AZALI NZAMBE TE

Makomami Mosantu eteyaka ete “mpo na biso, ya solo, Nzambe azali kaka moko” mpe ete Yesu azalaki momemi-nsango ya Nzambe. (1 Bakorinti 8:6) Yesu alobaki polele ete Nzambe aleki ye mpe ete Nzambe atindaki ye awa na mabele.​—Yoane 11:41, 42; 14:28. *

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu etali Yesu Kristo, talá biteni 8 mpe 9 ya mwa buku Kondima ya solosolo​—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo ezali na jw.org.