Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe azali na bizaleli nini?

Nzambe azali na bizaleli nini?

Ntango tozali koyeba malamu bizaleli ya moto, toyebaka moto yango malamu koleka, mpe biso ná ye tokoki kokóma baninga ya motema. Ndenge moko mpe, ntango tozali koyeba malamu bizaleli ya Yehova, tokoyeba ye malamu koleka, mpe biso ná ye tokokóma baninga ya motema. Bizaleli ya Nzambe oyo eleki bizaleli na ye mosusu ezali minei: nguya, bwanya, boyengebene, mpe bolingo.

NZAMBE AZALI NA NGUYA

“Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova! Talá yo nde ozalisaki likoló ná mabele na nguya na yo monene.”​YIRIMIA 32:17.

Nguya ya Nzambe emonanaka na biloko oyo akelá. Na ndakisa, soki obimi libándá, ntango moi ezali makasi, oyokaka ndenge nini? Oyokaka moi ezali koswa yo na nzoto. Mɔtɔ wana emonisaka nguya ya Yehova. Moi ezali na nguya ya ndenge nini? Soki mai ezali kotɔka ezalaka na degré 100; nzokande, mɔtɔ oyo ezali na kati mpenza ya moi eleki mbala 150 000 mai oyo ezali kotɔka. Na segɔnde moko, mɔtɔ oyo moi ebimisaka ekokani na kopanzana ya bankama na bankama ya babombi atomike.

Nzokande, moi ezali kaka lokola minzoto mosusu; kutu, ezali na minzoto ebele oyo eleki moi na monene. Bato ya mayele balobaka ete moko ya minzoto oyo eleki monene, oyo bapesá nkombo UY Scuti, eleki moi na monene mbala koleka 1 700. Elingi koloba ete soki batye monzoto yango na esika oyo moi ezali, ekomɛla mabele mobimba mpe ekokóma tii na planɛti ya Jupiter. Ndakisa wana ekoki kosalisa biso tókanga malamu ntina ya maloba ya Yirimia ete Yehova Nzambe akelaki likoló ná mabele, elingi koloba molɔ́ngɔ́ mobimba, na nguya na ye monene.

Nguya ya Nzambe epesaka biso matomba nini? Mpo tózala na bomoi, tozali na mposa ya biloko oyo Nzambe akelá, na ndakisa moi mpe biloko mosusu oyo ezali awa na mabele. Longola yango, Nzambe asalelaka nguya na ye mpo na kosalisa mokomoko na biso. Na ndenge nini? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Nzambe apesaki ye nguya ya kosala makamwisi. Biblia elobi boye: “Bato oyo bakufá miso bazali komona lisusu, mpe batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka mpe bakufi bazali kolamuka.” (Matai 11:5) Ezali boni lelo oyo? Biblia elobi: “Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi. . . . Baoyo bazali kotyela Yehova elikya, bakozwa nguya ya sika.” (Yisaya 40:29, 31) Nzambe akoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo tóyikela mikakatano mpe mitungisi ya bomoi mpiko. (2 Bakorinti 4:7) Nyonso wana esengeli kopesa biso mposa ya kokóma baninga ya Nzambe oyo asalelaka nguya na ye ezangi nsuka mpo na kosalisa biso!

NZAMBE AZALI NA BWANYA

“Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya.”​NZEMBO 104:24.

Soki tozali kotala biloko oyo Nzambe akelá, bwanya na ye ekobanda se kokamwisa biso. Kutu, bato ya mayele bazali koyekola malamumalamu biloko oyo Nzambe akelá mpe kotala ndenge oyo esalemá mpo báyiba mayele wana mpe básala biloko mosusu, na ndakisa aparɛyi ya fɔtɔ to mpe aviɔ.

Liso ya moto esalamá na ndenge ya kokamwa

Bwanya ya Nzambe emonanaka malamumalamu na ndenge oyo asalá nzoto ya moto. Na ndakisa, tókanisa ndenge mwana asalamaka. Na ebandeli, ezalaka kaka na selile moko; kasi, makambo nyonso oyo ezali na nzoto ya moto ezalaka na kati ya selile wana. Selile wana ekabwanaka mpe ekómaka baselile ebele oyo ekokani. Kasi, na ntango moko boye, baselile yango ekómaka kokesana, mpe nsukansuka ebimisaka bankama na bankama ya baselile mosusu: baselile ya makila, baselile ya misisa, baselile ya mikuwa, mpe bongo na bongo. Mosika te, binama ya nzoto esalamaka mpe ekómaka kosala mosala na yango. Nsima ya sanza libwa mpamba, selile oyo ezalaki moko ekómaka mwana mobimba oyo azali na bamiliare ya baselile. Bwanya oyo emonanaka na mosala nyonso wana etindaka bato mingi bákanisa lokola mokomi moko ya Biblia oyo alobaki ete: “Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa.”​—Nzembo 139:14.

Bwanya ya Nzambe epesaka biso matomba nini? Nzambe ayebi soki tozali na mposa ya nini mpo tózala na bomoi ya esengo. Lokola ayebi makambo mingi mpenza, apesi biso batoli ya malamu mingi na Liloba na ye, Biblia. Na ndakisa, Biblia elobi na biso: “Bókoba . . . kolimbisana na motema moko.” (Bakolose 3:13) Ezali toli ya malamu mpenza. Minganga bamoni ete kolimbisa ekoki kosalisa moto alalaka mpɔngi malamu mpe tansiɔ na ye ezala malamu. Ekoki mpe kosalisa moto anyokwama na makanisi te to mpe kobatela ye na bamaladi mosusu. Nzambe azali lokola moninga moko ya bwanya mpe ya boboto, oyo alɛmbaka te kopesa biso batoli ya malamu. (2 Timote 3:16, 17) Okosepela te Nzambe ya ndenge wana azala moninga na yo?

NZAMBE AZALI SEMBO

“Yehova alingaka bosembo.”​NZEMBO 37:28.

Nzambe asalaka kaka makambo oyo ezali sembo. Biblia elobi: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!” (Yobo 34:10) Yehova akataka makambo na bosembo, ndenge mokomi ya nzembo alobaki na ye ete: “Okosambisa bato ya bikólo na bosembo.” (Nzembo 67:4) Lokola “Yehova amonaka ndenge motema ezali,” moto akoki kokosa ye te; ayebaka likambo nyonso soki ezali solo mpe akataka kaka makambo na bosembo. (1 Samwele 16:7) Longola yango, Nzambe ayebi likambo mokomoko ya kozanga bosembo oyo ezali kosalama na mokili mpe alaki ete mosika te “bato mabe bakolongolama na mabele.”​—Masese 2:22.

Kasi, Nzambe azali te zuzi moko ya makambo makasi, oyo alukaka kaka kopesa etumbu. Ayokelaka bato mawa soki esengeli. Biblia elobi boye: “Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu,” ata epai ya bato mabe soki babongoli mpenza motema. Yango nde bosembo ya solosolo!​—Nzembo 103:8; 2 Petro 3:9.

Bosembo ya Nzambe epesaka biso matomba nini? Ntoma Petro alobaki boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Bosembo ya Nzambe etindaka ye apona bilongi te. Moto nyonso: mondɛlɛ to moindo, moto ya ekólo boye to boye, moto atángá mingi to te, mozwi to mobola, akoki kopusana penepene na ye mpe kosambela ye.

Nzambe aponaka bilongi te, mpe moto nyonso: mondɛlɛ to moindo, moto ya ekólo boye to boye, moto atángá mingi to te, mozwi to mobola, akoki kopusana penepene na ye

Nzambe alingi tókanga ntina ya bosembo na ye mpe tózwela yango matomba; yango wana apesá biso lisosoli. Biblia elobi ete lisosoli ezali lokola mobeko oyo ‘ekomamá na mitema na biso,’ oyo “ezali kotatola” soki tozali kosala malamu to mabe. (Baroma 2:15) Ndenge nini lisosoli esalisaka biso? Soki lisosoli na biso eteyami malamu, ekoki kopesa biso mposa makasi ya kokima makambo ya mabe. Mpe soki tobungi nzela, lisosoli ekoki kopesa biso mposa makasi ya kobongola motema mpe kozonga na nzela. Koyeba ndenge oyo Nzambe amonisaka bosembo na ye ekoki kosalisa biso tópusana penepene na ye!

NZAMBE AZALI BOLINGO

“Nzambe azali bolingo.”​1 YOANE 4:8.

Nzambe asalelaka nguya, bwanya, mpe bosembo na ye mpo na kosala makambo; kasi Biblia elobi te ete Nzambe azali nguya, bwanya, to bosembo. Nzokande, Biblia elobi ete Nzambe azali bolingo. Mpo na nini? Mpo tokoki koloba ete nguya ya Nzambe esalisaka ye asala makambo mpe bosembo na ye etambwisaka ndenge oyo asalaka yango. Kasi, bolingo nde etindaka ye asala makambo. Bolingo nde etindaka ye asala nyonso oyo asalaka.

Yehova akoká na nyonso; nzokande, bolingo etindaki ye akela baanzelu mpe bato, bikelamu oyo akokaki kolinga mpe kobatela. Abongisaki mabele na motema moko mpenza mpo bato báfanda wana. Tii lelo, azali kokoba kolakisa bato nyonso ete alingaka bango na ndenge “abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.”​—Matai 5:45.

Longola yango, “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Yehova alingaka moto nyonso oyo alukaka koyeba ye mpe kopusana penepene na ye. Atyelaka moto mokomoko ya ndenge wana likebi. Kutu, Biblia elobi “azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Misala 17:27.

Bolingo ya Nzambe epesaka biso matomba nini? Tosepelaka kotala moi ndenge emonanaka kitoko ntango ezali kolala. Tosepelaka ntango tozali komona bebe azali kosɛka. Tosepelaka mingi soki ndeko moko ya libota azali kolakisa ete alingaka biso. Nyonso wana ekoki komonana makambo ya mikemike; kasi, yango nde epesaka biso esengo ya solosolo.

Libondeli ezali mpe eloko mosusu oyo elakisaka ete Nzambe alingaka biso. Biblia elobi na biso boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” Lokola tata oyo alingaka bana na ye, Yehova alingi ete tóyebisa ye mitungisi na biso mpo asalisa biso. Soki tosali yango, Yehova alaki ete akopesa biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Bizaleli ya Nzambe oyo totaleli, elingi koloba nguya na ye, bwanya na ye, bosembo na ye, mpe bolingo na ye, esalisi yo oyeba ye lisusu malamu? Mpo na koyeba lisusu bizaleli ya Nzambe malamumalamu, tolendisi yo oyekola makambo oyo asalá mpe oyo akosala mpo na yo.

NZAMBE AZALI NA BIZALELI NINI? Yehova azali na nguya, na bwanya, mpe na bosembo koleka moto nyonso. Kasi, ezaleli na ye oyo esepelisaka mingi ezali bolingo