Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezalaki na rulo moko ya kala eyebani

Makambo oyo ezalaki na rulo moko ya kala eyebani

Rulo ya Ein Gedi oyo eziká makasi ekokaki kotángama te kobanda bamonaki yango na 1970. Scanner laser-3D emonisaki ete rulo yango ezali na bavɛrsɛ ya Balevi, mpe ezali na nkombo ya Nzambe

NA 1970, na engumba Ein Gedi, na Israël, pene na wɛsti ya bokula ya Mbu ekufá, bato ya arkeoloji bamonaki rulo moko oyo eziká makasi. Bamonaki rulo yango ntango bazalaki kotimola esika oyo sinagoga moko ezalaki; sinagoga yango ezikaki ntango batumbaki mboka, mbala mosusu na siɛklɛ ya 6 T.B. Lokola rulo yango ebebaki mpenza, bakokaki te kotánga makambo oyo ezalaki na kati. Kasi, ntango basalelaki scanner laser-3D, oyo esalisaka mpo na komona eloko na mobimba na yango tii na kati, makambo oyo ezalaki na rulo yango eyebanaki. Mpe na lisalisi ya programɛ oyo ekɔtisaka bililingi na aparɛyi to na ordinatɛrɛ (logiciel d’imagerie numérique), batángaki makambo oyo ezalaki na kati ya rulo yango.

Makambo nini bamonaki? Rulo yango ezali makomi ya Biblia. Mwa makambo oyo etikalaki na kati ezalaki bavɛrsɛ mosusu ya ebandeli ya mokanda ya Balevi. Bavɛrsɛ yango ezali na balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe na Ebre. Emonani ete rulo yango ekomamaki kati na mbula 50 T.B. mpe mbula 400 T.B. Na yango, ezali rulo ya Makomami ya Ebre ya kala koleka bamaniskri ya Qumrân. Na zulunalo moko (The Jerusalem Post) Gil Zohar akomaki ete liboso báyeba makambo oyo ezalaki na rulo ya Ein Gedi, mbula 1 000 ezalaki kokabola bamaniskri ya Biblia oyo eleki koumela, elingi koloba barulo ya Mbu ekufá oyo ekomamaki soki na mobu 100 L.T.B., mpe Codex d’Alep, oyo elandaki yango na koumela, oyo ekomamaki soki na mobu 930 T.B. Bato ya mayele balobi ete makambo oyo ezalaki na rulo ya Ein Gedi emonisi ete makomi ya Torah ya Bamasorete “ebatelamaki malamu na boumeli ya mbula 1 000, mpe ete bambeba oyo ekɔtaki ntango bazalaki kosala bakopi ebongolaki ndimbola ya makambo te.”