Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala

Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala

Na 2012, bato ya arkeoloji bamonaki biteni mikemike ya elokó moko oyo esalemi na mabele ya lima mpe eumelaki mbula 3 000. Bato oyo basalaka bolukiluki yango basepelaki mingi na likambo yango. Mpo na nini? Ezalaki te mpo na biteni mikemike ya elokó yango, kasi mpo na makomi oyo ezalaki na elokó yango.

Nsukansuka, ntango bato ya arkeoloji basangisaki biteni yango esika moko, balongaki kotánga makomi ya Bakanana oyo ezalaki na elokó yango. Makomi yango ezalaki: “Eshba’al Ben Beda,” oyo elimboli “Eshba’al, mwana ya Beda.” Yango ezali mbala ya liboso bato ya arkeoloji bámona nkombo wana ekomami na elokó moko ya kala.

Biblia elobeli mpe moto moko nkombo na ye Eshibaala. Azalaki moko ya bana ya mokonzi Saulo. (1 Ntango 8:33; 9:39) Profesɛrɛ Yosef Garfinkel, moko ya bato oyo bamonaki elokó yango, alobaki: “Ezali likambo ya esengo komona ete nkombo Eshibaala ezali na kati ya Biblia, mpe sikoyo ekɔti na molɔngɔ ya biloko oyo bato ya arkeoloji bamoná, oyo etali boyangeli ya mokonzi Davidi.” Wana ezali ndakisa mosusu oyo emonisi ndenge arkeoloji eyokani na Biblia!

Na Biblia, Eshibaala mwana ya Saulo abengami mpe Ishi-boshete. (2 Samwele 2:10) Mpo na nini balongoli “baala” mpe na esika na yango batye “boshete”? Bato oyo basalaka bolukiluki balimboli ete mbala mosusu mokomi ya mokanda ya Samwele ya mibale aboyaki kosalela nkombo Eshibaala mpo ezalaki kokundwela Bayisraele Baala, nzambe ya ekumbaki oyo Bakanana bazalaki kosambela. Nzokande, na mokanda ya Ntango ya liboso, tokoki komona nkombo Eshibaala.