Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge ya kokima bamaladi mosusu

Ndenge ya kokima bamaladi mosusu

Mokolo na mokolo nzoto na biso ebundaka na banguna oyo toyebi te mpe bamonanaka te, kasi bakoki koboma mpenza. Banguna oyo bakɔtaka na nzoto, na ndakisa ba-bactérie, bavirisi mpe bamikrobe mosusu, batyaka bomoi na biso na likama. * Mbala mosusu oyebaka bitumba oyo nzoto ebundaka te mpo nzoto na biso ezalaka na likoki ya kobengana to koboma bamikrobe liboso kutu bilembo ya maladi emonana. Kasi, ntango mosusu tokoki kobɛla mpo bamikrobe yango eleki makasi. Soki bongo ekosɛnga omɛla bankisi to ozwa lisalisi ya minganga mpo likoki wana ya kobundisa mikrobe ekóma makasi.

Eleki sikoyo ebele ya bambula, bato bayebaki mpenza te ete bamikrobe epesaka moto maladi. Kasi, na siɛklɛ ya 19 ntango bato ya mayele bamonaki ete bamikrobe mosusu nde ememaka bamaladi, yango esalisaki bato báyeba ndenge ya kobundisa bamikrobe. Banda wana mayele ya minganga esali ete bamaladi mosusu oyo ezwaka bato mosusu na ndakisa, kolokoto mpe bukabuka esila mpe bato báyeba ndenge ya kokima yango. Kasi bamaladi mosusu, na ndakisa fièvre jaune mpe maladi ya dengue ezongi lisusu. Mpo na nini? Tótalela makambo oyo:

  • Mbula na mbula, bamilio ya bato basalaka mibembo mpe mbala mingi bamemaka bamaladi bisika oyo bakei. Lisolo moko ya Zulunalo Clinical Infectious Diseases elobi ete bato ya mibembo bakoki komema na bamboka oyo bazali kokende “bamaladi mabe oyo ezwaka bato mosusu.”

  • Ba-antibiotiques ezali kokoka lisusu te koboma bamikrobe mosusu. OMS elobi boye: “Ndenge makambo ezali kokende ba-antibiotiques ekokoka lisusu te kosilisa bamaladi oyo ezwaka bato mosusu . . . mpe bamaladi yango ekobanda lisusu koboma bato.”

  • Mbala mingi mobulu ya bana-mboka mpe bobola esalaka ete baguvɛrnema ekoka te kopekisa bamaladi epalangana.

  • Bato mingi bayebi te ndenge ya kokima bamaladi mosusu.

Ata bongo, ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo omibatela mpe obatela libota na yo. Lisolo oyo elandi ekomonisa ete ata soki ofandaka na mboka oyo bobola ezali makasi, ezali na makambo ya mikemike oyo okoki kosala mpo na komibatela.

^ par. 3 Bamikrobe mingi ebɛlisaka te. Na masolo oyo, tokolobela mingi bamikrobe mpe biloko mosusu oyo etyaka nzoto na biso na likama.