Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Mongolie

Mobembo moko na Mongolie

GENGHIS KHAN, elombe moko ya bitumba na siɛklɛ ya 12 oyo azalaki kobanga te nde abandisaki ampire monene ya Mongolie. Lelo oyo Mongolie oyo ekómá moke koleka ndenge ezalaká, ezwami na katikati ya Russie mpe Chine, ezali moko ya ekólo oyo bato bazalaka mingi te mpe bafandaka mosikamosika.

Eteni monene ya mabele ya Mongolie ezali matitimatiti, na bangomba ya milaimilai, bibale mpe bamai ya mikemike. Esobe ya Gobi ezali na sudi mpe eyebani mingi mpo na bilembo oyo banyama babengi dinosaures etiká. Lokola Mongolie ezali likoló mpenza ya ngomba, 1 580 mɛtrɛ likoló ya nivo ya mbu, bato ya mboka yango babengaka yango “Mabele ya mapata ya bleu.” Nkombo yango ebongi mpenza mpo Mongolie ezalaka na mikolo koleka 250 ya moi makasi na mbula moko!

Nkoi oyo efandaka na banɛjɛ

Klima ya Mongolie ezali mabe makasi. Na eleko ya molunge, molunge ezalaka makasi mpenza (40°C) kasi na eleko ya malili, malili mpe ezalaka makasi mpenza (-40°C). Bato mingi ya Mongolie (1/3) bafandaka esika moko te. Mibali ná basi babandaka misala na ntɔngɔ mpenza ntango babimisaka miliki ya ntaba, ya ngɔmbɛ, ya kamela mpe ya mpunda. Ba-Mongol basepelaka kolya mingi biloko oyo esalemi na miliki mpe misuni, mingimingi mosuni ya mpate.

Bagato oyo batyá miliki ekangamá to aaruul bakaukisaka yango na moi

Ba-Mongol bazalaka bayambi-bapaya. Batikaka bandako na bango oyo ezali lokola bahema ya sɛrklɛ polele mpo moleki-nzela nyonso apema mpe alya biloko oyo batye wana mpo na ye. Mbala mingi, bapesaka bapaya ti ya miliki oyo batyá mwa mungwa.

Ba-Mongol mingi bazali bato ya lingomba ya Buda. Mwa bato basambelaka na lingomba ya chaman, mizilma mpe bamosusu bazali bakristo kasi mingi basambelaka te. Batatoli ya Yehova bazali koleka 350 na Mongolie mpe bayekolaka Biblia na bato koleka 770.

Okoki komona na mosika kamela ya Bactriane oyo ezali na matutu mibale, ememi kilo ata na eleko ya malili makasi