Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge baselile ya bɔɔngɔ ya liyoyo to libanki esalisaka yango eyeba likama noki

Ndenge baselile ya bɔɔngɔ ya liyoyo to libanki esalisaka yango eyeba likama noki

MABANKI epumbwaka ebele nzela moko, ekoki kozala “milio  80 na kilomɛtrɛ-kare soki moko na ndambo ntango ezali kopumbwa.” Kasi etutanaka te ntango ezali kopumbwa. Sekele na yango ezali nini?

Tókanisa naino: Nsima ya miso nyonso mibale ya libanki ezali na selile moko ya bɔɔngɔ oyo esalisaka yango eyeba likama noki; babengaka baselile yango lobula giant movement detector (LGMD). Soki emoni ete elingi etutana, baselile yango etindaka nsango na mapapu mpe na makolo ya libanki mpo ekima likama yango nokinoki. Kutu, esalaka bongo na vitɛsi mbala mitano koleka kobɛta ya liso.

Ndenge oyo miso mpe baselile ya bɔɔngɔ ya libanki esalaka epesi bato ya siansi mayele ya kosala programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ekosalisa barobo eyeba mpe ekima eloko nyonso oyo ezali kopusana penepene na yango, kozanga lisalisi ya baaparɛyi ya mindɔndɔmindɔndɔ lokola (radar to détecteurs d’infrarouges). Bato ya mayele bazali kosalela mayele yango mpo na mituka, kotya yango programɛ moko oyo ekobanda kokebisa yango mpo etutaka mituka mosusu te. Profesɛrɛ Shigang Yue ya iniversite ya Lincoln na Royaume-Unis alobi boye: “Ezali na makambo mingi ya koyekola epai ya mwa nyama lokola libanki.”

Okanisi nini? Ndenge baselile ya bɔɔngɔ ya liyoyo to libanki esalisaka yango eyeba likama noki ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?