Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nalembi!”

“Nalembi!”

Ndako moko ya kala ezali komonana ete bazali kokipe yango lisusu te. Na boumeli ya bambula, mipɛpɛ makasi ebɛti yango, mpe etiki yango na bilembo. Sikoyo, ndako yango elɛmbi mpe ezali komonana ete ekokwea mosika te.

NDAKISA wana ezali komonisa ndenge mabala mingi ezali lelo. Esilá kokómela yo omona ete libala na yo ekoumela lisusu te? Soki ezali bongo, yebá ete na libala nyonso mikakatano ezangaka te. Kutu, Biblia emonisi mpenza ete baoyo bazali kobala bakozanga te kokutana na “makambo ya mpasi mpe mawa.”​—1 Bakorinti 7:28, The New English Bible.

Mpo na komonisa bosolo ya maloba yango, ekipi moko ya bato oyo bayekolaka makambo ya mabala, balobeli libala lokola “likambo oyo ezalaka na likama koleka, oyo ebele ya bato na ntango na biso bazali se komikɔtisa na yango.” Babakisi boye: “Likambo oyo ebandaka na esengo mingi mpe na kopesana bilaka, ekoki kokóma likambo ya kotungisa koleka mpe ya mpasi na bomoi mobimba ya moto.”

Ezali boni mpo na libala na yo? Ezali na likambo moko to makambo mingi na kati ya makambo oyo elandi?

  • Koswana ntango nyonso

  • Maloba ya kozokisa

  • Ekobo

  • Kobomba nkanda

Soki libala na yo emonani ete ezali lisusu makasi te mpe ezali komonana ete ekokufa mosika te, osengeli kosala nini? Osengeli nde koboma yango?