Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu

4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu

Liteya ya Biblia:

“Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.”na​BAGALATIA 5:22, 23.

Elimboli nini?

Nzambe akoki kosalisa moto atika ezaleli ya koyina bato mosusu. Elimo santu na ye ekoki kosalisa biso tókóma na bizaleli ya malamu oyo tokokaki kokóma na yango te na makasi na biso moko. Yango wana, na esika ya komeka kosilisa ezaleli ya koyina bato na makasi na biso moko, tosengeli nde kotya motema na lisalisi oyo Nzambe apesaka. Soki tosali bongo, tokoloba ndenge moko na ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Na yango, tokoki koloba ete: “Lisalisi na ngai ezali kouta na Yehova.”Nzembo 121:2.

Oyo okoki kosala:

“Yehova asalisi ngai natika mobulu mpe nakóma moto ya kimya.”​—WALDO

Bondelá Yehova, sɛngá ye na motema mobimba apesa yo elimo santu na ye. (Luka 11:13) Sɛngá ye asalisa yo ozala na bizaleli malamu. Yekolá makambo oyo Biblia elobaka mpo na bizaleli oyo esalaka ete moto atika koyina basusu, na ndakisa, bizaleli lokola bolingo, kimya, motema molai, mpe komipekisa. Luká ndenge ya kokóma na bizaleli yango. Mpe kómá moninga ya bato oyo bazali kosala makasi bázala na bizaleli yango. Baninga ya ndenge wana bakoki ‘kolendisa [yo] mpo ozala na bolingo mpe osala misala ya malamu.’​—Baebre 10:24.