Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 1

Nazali nani?

Nazali nani?

NTINA NA YANGO

Soki omiyebi mpe obosani te makambo oyo bateyá yo, ekosalisa yo osala oyo ezali malamu ntango bazali kotinda yo osala mabe.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Karen ayei na fɛti moko esali naino miniti zomi te; nsima na ye, ayoki mongongo moko oyo ayebi.

“Mpo na nini otɛlɛmi kaka boye?”

Karen abaluki mpe amoni moninga na ye Jessica asimbi milangi mibale ya masanga bafungolá. Ayebi ete ezali masanga oyo elangwisaka. Jessica apesi Karen molangi moko mpe alobi na ye: “Ozali lisusu mwana moke te, boye te?”

Karen alingi koboya, kasi akanisi ete Jessica azali moninga na ye. Karen alingi te moninga na ye amona ye yuma. Lisusu, Jessica azalaka mwana malamu. Soki ye azali komɛla masanga, boye ezali mabe mpenza te. Karen alobi na nse ya motema: ‘Ezali kaka masanga! Ezali bangi te!’

Soki ozalaki na esika ya Karen, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Mpo osala oyo ezali malamu na bisika ya ndenge wana, osengeli komiyeba. Koyeba soki ozali nani ekosalisa yo okangama na makambo oyo oyebi ete ezali malamu. Soki obosani yango te, okozala na makasi ya kotambwisa bomoi na yo na esika otikelaka bato mosusu bátambwisa yo.1 Bakorinti 9:26, 27.

Okozwa makasi yango ndenge nini? Bandá naino na kopesa biyano na mituna oyo elandi.

1 NAZALAKA MAKASI NA NINI?

Koyeba makasi na yo mpe bizaleli na yo ya malamu ekosalisa yo ozala na mpiko.

NDAKISA YA BIBLIA: Ntoma Paulo akomaki boye: “Ata soki nazali na makoki te na koloba, ya solo nazali bongo te na boyebi.” (2 Bakorinti 11:6) Lokola Paulo ayebaki Makomami malamu, esalisaki ye azala na mpiko ntango bato batungisaki ye. Atikaki te maloba mabe ya basusu ebangisa ye.2 Bakorinti 10:10; 11:5.

OMITALELA: Komá likambo moko oyo oyebi kosala malamu.

Sikoyo lobelá ezaleli na yo moko ya malamu. (Na ndakisa, kosalisa basusu, kokaba, kotyelama motema, kotosa ngonga)

2 NAZALAKA NA BOLƐMBU NINI?

Ndenge kaka ebende ebukanaka kaka esika oyo ezali na mpota, bizaleli na yo ekobeba noki soki otiki bolɛmbu na yo etambwisa yo.

NDAKISA YA BIBLIA: Paulo ayebaki bolɛmbu na ye. Akomaki boye: “Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu.”Baroma 7:22, 23.

OMITALELA: Bolɛmbu na yo nini osengeli koluka kolonga?

3 NAKANAKA KOSALA NINI?

Okoki komata taxi mpe koyebisa sofɛlɛ abalukabaluka esika moko tii motuka na ye ekosila esansi? Ekozala bozoba, mpe okobebisa mbongo!

Elimboli nini? Komityela mikano na bomoi ekosalisa yo okende liboso. Okobalukabaluka esika moko te mpo oyebi esika ozali kokende mpe ndenge ya kokóma kuna.

NDAKISA YA BIBLIA: Paulo akomaki boye: “Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te.” (1 Bakorinti 9:26) Na esika akanga mabɔkɔ azela oyo ekoyela ye, Paulo amityelaki mikano mpe akokisaki yango.Bafilipi 3:12-14.

OMITALELA: Komá makambo misato oyo okolinga kosala tii na mbula oyo ekoya.

4 MATEYA NINI NANDIMAKA?

Soki omiyebi mpenza, okozala lokola nzete oyo epikami na ntango ya mopɛpɛ makasi

Soki oyebi te mateya nini ondimaka, okobendama epai na epai. Ndenge moko na mongingima (caméléon), okobanda kobongwana mpo na kosepelisa baninga na yo—mpe ekomonisa mpenza ete yo moko omiyebi te.

Nzokande, soki makambo ozali kosala eyokani na mateya oyo ondimaka, ekomonisa ete omiyebi, ata soki baninga bazali kosala nini.

NDAKISA YA BIBLIA: Na ntembe te mosakoli Danyele azalaki naino elenge ntango “akanaki na motema na ye” ete akotosa mibeko ya Nzambe, atako azalaki mosika na libota na ye. (Danyele 1:8) Na ndenge yango, atikalaki sembo, abongwanaki te. Danyele akangamaki na mateya oyo azalaki kondima.

OMITALELA: Mateya nini ondimaka? Na ndakisa: Ondimaka ete Nzambe azali? Mpo na nini? Nini etindaka yo ondima yango?

Ondimaka ete mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu ezali mpo na bolamu na yo? Mpo na nini?

Sikoyo, okolinga kozala ndenge nini? Lokola lokasa oyo ekwei na nzete, oyo ekendaka epai na epai ata na mwa mopɛpɛ moke, to lokola nzete oyo ekweaka te, ata na mopɛpɛ ya makasi? Soki omiyebi mpenza, okozala lokola nzete ya ndenge wana. Mpe yango ekosalisa yo opesa eyano na motuna oyo: Nazali nani?