‘Kopesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe

Mokanda oyo ezali kolobela ndenge lisangá ya Bakristo ya siɛklɛ ya liboso ebandaki mpe boyokani oyo ezali na yango na lisangá ya lelo.

Bakarte

Bakarte ezali komonisa oyo mbala mingi ebengamaka lelo mokili mosantu mpe mibembo ya ntoma Paulo na mosala ya misionɛrɛ.

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mpo na nini tokoki kondimisama ete Nzambe akosalisa biso wana tozali kokoba “kopesa litatoli malamumalamu” mpo na Bokonzi ya Nzambe?

MOKAPO 1

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”

Yesu asakolaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na bikólo. Ndenge nini likambo yango ekokisami?

MOKAPO 2

“Bokozala batatoli na ngai”

Ndenge nini Yesu abongisaki bantoma na ye mpo bátambwisa mosala ya kosakola?

MOKAPO 3

“Batondaki na elimo santu”

Mosala nini elimo santu ya Nzambe esalaki na ebandeli ya lisangá ya bokristo?

MOKAPO 4

“Bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”

Bantoma bamonisi mpiko, mpe Yehova apamboli bango.

MOKAPO 5

“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”

Bantoma bazwi ekateli oyo ezali ndakisa mpo na bakristo nyonso ya solo.

MOKAPO 6

Stefano​—“Atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya”

Ndenge oyo Stefano apesaki litatoli na mpiko liboso ya tribinale monene ya Bayuda, ekoki koteya biso nini?

MOKAPO 7

Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”

Filipe apesaki ndakisa malamu lokola mopalanganisi ya nsango malamu.

MOKAPO 8

Lisangá “ekɔtaki na eleko moko ya kimya”

Saulo, monyokoli monene, akómi mosakoli ya molende.

MOKAPO 9

“Nzambe aponaka bilongi te”

Nsango malamu ekómi epai ya bato ya bikólo oyo bakatami ngenga te.

MOKAPO 10

“Liloba ya Yehova ekobaki kopalangana”

Petro abimi na bolɔkɔ, mpe minyoko elongi te kopekisa nsango malamu epalangana.

MOKAPO 11

“Batondaki na esengo mpe na elimo santu”

Paulo atiká ndakisa malamu ntango bato bazalaki koboya koyoka nsango malamu mpe kotɛmɛla ye.

MOKAPO 12

“Bazali koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Nzambe”

Paulo ná Barnabasi bamonisi komikitisa, molende mpe mpiko.

MOKAPO 13

‘Bokabwani ebimaki’

Likambo ya kokatama ngenga ekómi epai ya lisangani ya mikóló-bakambi.

MOKAPO 14

“Biso nyonso toyokani”

Yekolá ndenge oyo lisangani ya mikóló-bakambi ekataki likambo ya kokatama ngenga mpe ndenge ekateli yango esalaki ete bomoko ezali na masangá.

MOKAPO 15

“Azalaki kolendisa masangá”

Bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka masangá mpo ekóma makasi na kondima.

MOKAPO 16

“Leká na masedonia”

Kondima mokumba mpe koyikela minyoko mpiko na esengo ememaka mapamboli.

MOKAPO  17

“Azalaki kosalela makomami mpo na kosolola na bango”

Paulo azali kopesa litatoli epai ya Bayuda na Tesaloniki mpe na Beroya.

MOKAPO 18

“Báluka Nzambe, . . . mpe bázwa ye mpenza”

Paulo azwaki mabaku mingi ya koteya na ndenge apesaki bayoki na ye longonya ndenge bazalaki kolinga kosambela?

MOKAPO 19

“Kobá koloba; kokanga monɔkɔ te”

Liteya nini tokoki kozwa na mosala oyo Paulo asalaki na Korinti, oyo ekosalisa biso tópesa litatoli malamumalumu mpo na Bokonzi ya Nzambe?

MOKAPO 20

Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “Kopalangana mpe kolonga”

Koyekola ndenge oyo Apolosi ná Paulo bapesaki maboko mpo ete nsango malamu ekoba kokende liboso.

MOKAPO 21

“Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”

Molende ya Paulo na mosala ya kosakola mpe toli na ye epai ya bankulutu.

MOKAPO 22

“Mokano ya Yehova esalema”

Lokola Paulo alingi kaka kosala mokano ya Yehova, akei na Yerusaleme.

MOKOAPO 23

“Bóyoka kosamba na ngai”

Paulo alongisi solo liboso ya ebele ya bato oyo bazali na nkanda mpe liboso ya Sanedrina.

MOKAPO 24

“Zalá na mpiko!”

Paulo abiki na likita oyo banguna basali mpo na koboma ye mpe akei kosamba epai ya guvɛrnɛrɛ Feliksi.

MOKAPO 25

“Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”

Paulo apesi ndakisa na likambo etali kokɔtela nsango malamu.

MOKAPO 26

“Ata moto moko te akokufa”

Ntango masuwa ezindi, Paulo amonisi kondima makasi mpe bolingo mpo na bato.

MOKAPO 27

“Apesaki litatoli malamumalamu.”

Ntango Paulo azalaki mokangami na Roma, atikaki te kosakola

MOKAPO 28

“Tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”

Batatoli ya Yehova bazali kokoba mosala oyo bayekoli ya Yesu Kristo babandaki na siɛklɛ ya liboso.

Index ya Bililingi

Mwa bililingi ya ntina oyo ezali na buku oyo.