Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

INDONÉSIE

Totikalaki sembo

Daniel Lokollo

Totikalaki sembo
  • ABOTAMAKI NA 1965

  • BATISIMO 1986

  • NA MOKUSE Mobongisi-nzela monene oyo atikalaki sembo na kati ya minyoko.

NA MWA 14/04/1989, ntango nazalaki kotambwisa likita moko na engumba Maumere, na esanga Flores, bakonzi ya guvɛrnema bakɔtaki mbala moko esika tozalaki mpe bakangaki ngai ná bandeko mosusu misato.

Bakɛngɛli ya bolɔkɔ balukaki kotinda biso na makasi tópesa bendele losako. Lokola toboyaki, babɛtaki biso, banyatakinyataki biso, mpe batɛlɛmisaki biso na moi makasi mikolo mitano. Na butu, tozalaki kolɛnga na malili mpo tolalaki na sima ya bandako na biso ya bolɔkɔ, oyo ezalaki mike mpenza mpe etondi na bosoto; tolɛmbaki, mpe bampota oyo tozokaki ezalaki koswa. Mokonzi ya bolɔkɔ azalaki mbala na mbala kosɛnga biso tówangana kondima na biso, kasi tolobaki: “Tii tokokufa, tokopesa bendele losako te.” Ndenge moko na ebele ya bakristo mosusu, tosepelaki “konyokwama mpo na boyengebene.”1 Pe. 3:14.